Bokolongono bwa nzoto ya P¨¤pa etikali se esika yoko, kasi ezali kobonga mwa moke.
Bansàngo ya Vatican
Malembe malembe, Pàpa akomi nà kolongonu na nzoto,elobi ndako ya bopanzi-nsàngo ya Ngwendé-Esantu o mokolo mwa 8 aprili na tongo. Azali na bopemi ya maladi na ndako Sainte-Marthe; bokolongono bwa nzoto ya yé ezali esikà moko. Wana elobi baexamen awuti kosala mikolo mileki. Azali kozwa oxygène kaka na bùtù, soki esengeli. Bongo azali kokoba na kozwa nkisi, kosàla ba thérapies, mingi mpenza oyo ya kopema mpe ya kotambola.
Oyo Pàpa azali kosàla
Tee sik¡¯awa, manaka mayebani nayino te mpo ya poso Esantu. Na bopusàni ya eyenga ya Pasika, Pàpa François azali kokoba na mosàlà, ya bokutani nà ba dicastere ndenge na ndenge. Ndako ya bopanzi-nsango elobie te azali koyamba bamikanda, bongo lobi mokolo mwa 7 aprili akutanaki nà episkopo wa lokùmù Pietro Parolin, mokomeli ya Ngwendé-Esantu
Bo o momeséno, Tata-Mosantu azali kolekisa mikolo mya yé nakozwa nkisi, terapi, mosàlà mpe losàmbo. Azali kosàngàna mpe na ba Misa ya mokolo na mokolo, bongo azali mpe kopema. Lobi o mokolo mwa 9 aprili, ndako ya bopanzi nsango ezali koyebisa lisusu ete, malongi mayé makobima lokola ba poso bileki.
Tata-Mosantu na esika ya Mosantu-Petro
O mokolo mwa lomingo mwa 6 ya aprili, na suka ya Misa ya yubilé ya bakoni mpe ya basàli ya lopitalo, episkopo wa Roma apesaki mbote mpe abenisaki bandimi nà bato bamobembo basangànàki wana: ¡°lomingo lolamu na banso mpe matondi mingi¡±, elobaki yé yambo te azonga na Sainte-Marthe.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basango na kofina esika eye.