MAP

Ba poso mitano moleki oyo Pàpa François azali  na lopitalo Gemelli ya Roma Ba poso mitano moleki oyo Pàpa François azali na lopitalo Gemelli ya Roma 

Pàpa François akomi mwa malamu na nzoto

Na ndenge ndako ya bopanzi-nsàngo apesi liyebisi o mokolo mwa mitano mwa 21 ya sànzà ya marsi na mpokwa, Pàpa akomi mwa malamu, bokolongono bwa nzoto etelemi esika moko. Kopema ebongi mwa moke mpe koningisa nzoto. Kasi mokolo mwa kobima Gemelli moyebani nayino te.

Bansango ya Vatican  

 

Ekoki bongo poso mitano ut’o bayambaki Pàpa François na lopitalo Gemelli ya Roma mp ona kosalisa ye na bokono ya double pneumonie. Mwa mitano mwa tùkù mibale na moko (21) ya sànzà ya marsi, ndako ya bopanzi-nsàngo ya Ngwendé-Esantu epesi liyebisi ete Mokonzi monene mwa bantomà akomi mwa malamu, bongo bokolongono bwa nzoto bwa yé botelemi esika yoko. Mwa kobonga emonani na lolenge azali kopema mpe koningana.

Mokolo mwa kobima moyebani te

Ut’o libandela lya poso, Pàpa François esengelaki lisusu te na kozwa mopepe na nzela ya masini nà maske na bùtù, kasi azali kozwa oxygéne na lisalisi ya basinga na zolo, kasi muke muke kaka. Atako akomi malamu, baminganga bapesi nayino ndingisa te ya kobima ya yé na lopitalo Gemelli ya Roma. Nzokandé Tata-Mosantu akolekisa mikolo miye na kopema, na losambo mpe “na mwa mosàlà”.&Բ;

Losambo la Angelus

Esengeli koyeba été Pàpa ayambi ata motàli moko tè, bongo manaka ya baminganga mokobima kaka mokolo mwa tùkù mibalé na ineyi (24) ya sànzà y amarsi. Mpo na limeseno la losambo la Angelus, mokanda moko mokobima lokola na ba lomingo loleki. Mpo ya mokolo mwa mitano mwa tùkù mibalé na moko (21), losambo ya sapelet na place Saint-Pierre, ekambamaki na lisalisi lya Sàngo Armando Nugnes, Recteur ya Collège pontifical urbanien «ya Propaganda Fide».

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basango na kofina esika eye.

22 sánzá ya mísáto 2025, 11:40