Pàpa alendisi Eklezya ya Italie nakomitika na boyokani ya Elimo
Albys KBD CP – Kinshasa/ RDC
Liyangani monene ya mibalé ya sinodi ya ba eklezya ya ekolo ya Italie, ezali kosaléma na Vatican kobanda mokolo moye mwa tukù misato na moko (31) ya sànza ya marsi kino mokolo mwa misato (3) ya sànzà ya aprili. Ezali bongo motuyù ya biteni bya nsuka eklezya etamboli na mosàlà ya pastoral mpe social, na mibù mitano mileki. Na libakù linà, Mokonzi monene ya bantomà alendisi basàngani na komitika nakotambola na lisalisi ya mwinda mwa boyokani ekelami na ya Elimo Santu.
Alobeli yango malamu ete manso makoùta na Elimo Santu oyo “akotisaka eklezya na bosolo ekokà, ekosangisa ye na bomoko na lisàngà mpe na mosàla, ekokambaka yé na mabongi mikeseni ya bokonzi ut’o molongό mpe bizaleli malamu, mpe ekobongisa mbuma myango”. Pàpa Frnçois akumisi bango na makanisi nziké, mingi mpenza na “esengo ya bokristo oyo ezali likabo la Nzambe”. “Esengo” ndé ezali bongo mama na likambo oyo esangisi bayangani koleka nkoto yoko, nà ba episkopo, batindami ya badiosezi nà mpe biangemi, na mosàlà monà ya kopona likanisi lipesami: “mpo ete esengo ezala meke”.
Kotya motema sé na Nzambe
François alimboli ete esengo ya bokristo, ezali ndé “kotya motema na Nzambe na makambo manso na bomoyi”. Ayoki yango na tango azalaki na lopitalo Gemelli. Esengo enà “ekokima kuruze te, ekobotama na makambo ya nye mpe te” kasi “ekobotama na boyebi solo ete Mokonzi akotika biso bisomoko te”. Esengo enà ekopusaka bato libanda te (ekoponaka bato tè) kasi ekoyambaka, ezali mpo ya banso.
Yoko bato, liloba mpe Elimo
Mp ona Tata-Mosantu, liyangani lya mibale ya sinodi na Roma ya ba eklezya ya Italie ekozala libakù lya kokoto obozindo mpe kopono mbuma manso maùtaki kosalema kino sik’awa mpe ezali kotalela kilobi ya ba eklezya kati na Italie. Nde na liyebisi lya yé, alobi lisusu ete “Eklezya esalemi te na ba majorités to ba minorités, kasi na basantu mpe bandimi ba Nzambe. Baye batamboli na lisalisi ya mwinda mwa liloba mpe ya Elimo”. Apesi bango toli yakokende bobele liboso na esengo mpe na bwanyà.
Na nsuka ya liyangani, makani makopesama na ba episkopo ya ba diosezi bikeséni mpo ete bango, balakisa lolenge baeklezya ya bamboka bakotambola , mpe babongisa misàlà ya lisàngà ya baepiskopo ya ekolo ya Italie.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basango na kofina esika eye.