MAP

2025.03.05 Mwa Misato ya mputulu mpe Misa 2025.03.05 Mwa Misato ya mputulu mpe Misa   (Vatican Media)

Nà mputulu o moto, to tambola kati na elikya ya Pasika.

Pàpa atalisi nzela ya kolanda mpo na eleko ya karezimo kino Pasika. Alobi ete Kristu akozela biso ata na botawu mpe elikya ya biso kino nsuka. Alobi yango na mateya ma yé, etangaki episkopo wa lokumu De Donatis, na tango ya milùlù ya mputulu.

Albys KBD CP - Kinshasa/ RDC

 

Bokoti na eleko ya karezimo, oyo ezali kolengela liwà mpe nsekwà ya Kristu, elakisami na milùlù ya mputulu mibù na mibù. O mokolo mwa mitano mwa sanza ya misato (sanza y amarsi) tata episkopo wa lokumu De Donatis atambolaki na bakristu elongo kino o ndako nzambe ya Mosantu-Anselmo na bazilika ya Mosantu-Sabina, epayi wapi asalaki milùlù mya mputulu. Pàpà Franswa azalaki te, mpo akotaki lopitalo ut’o mokolo mwa 14 ya sanza ya mibale (sanza ya febuali) na lopitalo ya Gemelli, kasi apesaki ndingisa na kotanga mateya ma yé.

Yambo été bandimi batiya na mbunzu ba bango mputulu ekowutaka na mandalala ya mobù moleki, Tata-Mosantu alingaki ete bayeba nayino ndimbola ekolataka : «likanisi ya oyo biso tozali mpe elikya ya maye biso tokozala».  

2025-03-05 Eyenga mwa Mputulu
2025-03-05 Eyenga mwa Mputulu   (VATICAN MEDIA Divisione Foto)

Kokundola botàu

Kotiya mputulù, ezali komitala yo mei mpe komiyebela ‘te « mputulu tozali, tokelisami na mputulu mpe na mputulu tokozonga», elobaki Papa na mateya ma yé.  

Moto na moto asi ayokà botàu o ntei ya yé na “maladi, na kibobolà, na bokono oyo ekoyelaka bison à mabotà ma biso na mbalakata” to mpe tango tolembaka, na bobangi ezali kati na biso, na bozangi kolonga, na ezalela ya mpamba ekolekaka na ba ndoto ya biso, na bososoli kati na biloko oyo tozali na yango ekoleka noki.

Kasi Tata-Mosantu abeti nsete na bamputulu misusu: “putulu ya moke ekobebisaka ezingelo kati na lisangà ya bato mpe na mokili”. Kati na yango, ezali nà bokeseni ya makanisi, bozongeli na yango, koyiba nkita ya mabele, koyokisa mpasi na mitindo minso mpe bitumba o kati ya bato.

Bamputulu nziké bozali koboma mpe kobebisa mokili mwa biso, ezali mpe kopekisa bozalani na boboto, ezali kokolisa bongo bobangi mpe bosali mituna mpo ya lobi ya bomoyi bwa biso mokolo na mokolo.[ Bamputulu nziké bozali koboma mpe kobebisa mokili mwa biso, ezali mpe kopekisa bozalani na boboto, ezali kokolisa bongo bobangi mpe bosali mituna mpo ya lobi ya bomoyi bwa biso mokolo na mokolo. ]

Kobotisa Elikya

Papa alimboli ete mputulù ekokundola elikya oyo Kristu amemelaki biso, oyo ye mei amisangisaki nà mputulu ya mabele, akomi moto mpe atomboli yango kin’o olikolo. Soki elikya ezangi, tokotikala na botàu ya bomoto bwa biso, mingi mpenza liboso ya liwa ya biso.

Nde bongo esengeli ete, mikolo tuku mineyi moye ya karezimo, mozala mikolo ya elikya mpo ya nsékwà, ekobaki Franswa koloba. Atangaki mpe mokitani na ye Benoit XVI oyo alobaki ete: “moto azali mputulu mpe na mputulu akozonga, kasi azali mputulu oyo ezali na motùya o miso ma Nzambe, mpamba te Nzambe akelaki moto mpo ya bomoyi nsuka te”

Mbela ya Mokonzi monene ya bantomà ezali ete moto na moto azongela kotiya Kristo o kati kati ya bomoyi bwa yé mpe kokkoma elembo ya elikya na mokili. Ekosalema bongo, “yambo na kokabola: mpo na koleyisa elikya ya mokili semba”. Nsima na losambo: “mpo yakokoma bongo basengi ya lola” lokola elobaki Jacques Maritain, mo-filosofi. Na nsuka, na bomipima: oyo ekokanisaka biso ete “bobele bolingo bwa Nzambe ekoki solo kotondisa biso mpe kolaka biso elikya ya mokolo molamu mokoyà”.

Na bosukisi, Pàpa aliky ete Mokonzi “akokombola mputulu ya liwà lya biso mpo ya kongengisa biso na bomoyi bwa sika”. 

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda  na biso ya basango na kofina esika eye

 

05 sánzá ya mísáto 2025, 10:39