François : bitumba ezali bozoba, ezali na ntina te, tolongola bibundeli na mabélé
Moyangeli mokonzi,
Na lingi kotondo yo botondi mpo ya maloba ma bolingo otindelaki ngai awa na zali maladi. Bitumba ezali bozoba, ezali na ntina te. Solo, bolembù bwa bomoto ezali na nguya ya kofungola biso mayele na maye makowumela mpe makoleka sé mpamba, oyo ekopesaka bomoyi mpe oyo ekobomaka. Ndé mpo na yango tango mosusu tokowanganaka mabé ma biso mpe tokokimaka bato ya mawa mpe bayé bazokà. Bango nde bakoki kozongisa biso na nzela lokola moto to lingomba.
Na lingi kolendisa banso bazali komipesa na mosala ya kopalinginya bansango na nzela ya mayebisi oyo ezali kosangisa mokili mobimba na tango esengeli. Boyeba motuyà ya maloba, ezali maloba mpamba te, kasi bikéla ekotongaka ezingelo ya bato. Yango ekoki kokabola to kosangisa, kolobela bosolo to kosàlela yango te
Tosengeli kolongola bibundeli ya maloba, mpo na kolongola oyo ya milimo mpe tolongola bibundeli ya mabélé. Awa bitumba eyebi kaka kobebisa mangombà mpe ezingelo kasi eyebi kopesa biyano na bamatata, lokutà, ba organisations internationales esengeli na kondima mpe makila ya sika. Ba eyamba ekoki kotoka na na boyambi ya bato mpo na kozongisa bondeko nà bosembo, elikya ya kimya. Maye manso mazali kosenga sé bomipesi na mosàlà, nakozala nie, na maloba. Tozala bomoko na likanisi liye, bongo ngolu ya likolo ekotika te kopesa biso makanisi mpe nakotambola na biso elongo.
François
Roma, lopitalo ya Gemelli, 14 marsi 2025
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basango na kofina esika eye.