ÐÓMAPµ¼º½

Luka

Bandimi kati na losambo liboso ya lopitalo Femelli, mpo ya bokolongono bwa nzoto ya P¨¤pa Franswa. Bandimi kati na losambo liboso ya lopitalo Femelli, mpo ya bokolongono bwa nzoto ya P¨¤pa Franswa.  (ANSA)

But¨´ elamu mpo na P¨¤pa Franswa

Na mayebisi Ndako ya bopanzi-nsango ya Ngwende-Esantu apesi na tongo ya mokolo mwa mineyi mwa zomi na isato (13) ya sanza ya marsi, mokonzi monene ya bantom¨¤ alalaki malamu. Elobaki lobi na mpokwa ¡®te maladi na ye etelemi esima yoko, kasi mwa mikakatano mozali.

Bansango ya VAtican

 

Kobanda mokolo mwa zomi na ineyi (14) ya sànzà ya febuali, Pàpa azali na lopitalo ya Gemelli. Lelo mokolo mwa mineyi mwa zomi na isato ya sànza ya marsi, butu na yé eleki na kimya. Nsango epesami na ndako ya bopanzi-nsango ya Ngwende-Esantu, oyo episkopo ya Roma akokundola mibù zomi na ibale (12ans) na mosala mwa yé ya bontomà.

Mikolo miye mizali koleka, bokolongono bwa nzoto bwa yé bozali kokoba malamu atako mwa mikakatano mozali. Nsango ewuti bongo na ndako ya bopanzi-nsango ya ngendé -Esantu. Na mokolo mwa zomi na ibale (12) ya marsi, Pàpa Franswa alandaki na nzela ya bilili, ezuzulu ya tongo mpe ya mpokwa mozali koleka na Salle Paul VI, oyo Curie romaine ezali kosala. Nzokandé azali kolekisa na bowumeli ya mokolo losambo, bopemi, physiothérapie mpo na koningisa nzoto malamu mpe kinésithérapie mpo na kopema malamu. 

 

Lobi na tango ya losambo ya sapele, tata episkopo wa lokumu oyo azali moyangeli ya dicastère mp ona masolo kati na mangomba (Dialogue interreligieux), abandaki lotukà linà ya mibombamo mwa esengo na kolendisa ¡°kobonza Tata-Mosantu mpe bakoni (bato na maladi) banso na bokengi ya bomama ya Maria¡±. Bongo basengi tosangisa kobelela ya biso elongo na oyo ya babola.

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basango na kofina esika eye.

13 s¨¢nz¨¢ ya m¨ªs¨¢to 2025, 11:48