ÐÓMAPµ¼º½

Luka

Ba Mikanda bazali kotindela P¨¤pa  na kati ya lopitalo Gemelli  epayi wapi azali.  Ba Mikanda bazali kotindela P¨¤pa na kati ya lopitalo Gemelli epayi wapi azali.   (AFP or licensors)

B¨´t¨´ ya P¨¤pa eleki na kimya na lopitalo Gemelli

Ndako ya bopanzi nsango ya Ngwend¨¦-Esantu elobi na tongo ya mokolo moye mwa mibale ete Tata-Mosantu alali malamu. Lundi na pokwa eyebisaki ete baminganga balonolaki pronostic atako P¨¤pa asengelaki kotikala nayino mikolo nzik¨¦ na lopitalo mp ona kolandela lisalisi lya y¨¦.

Bansango ya Vatican

 

Nsima ya liyebisi lya esengo ya mwa moko na mpokwa, ndako ya bopanzi nsango ya Ngwendé-Esantu epesi liyebisi ete Pàpa alalaki malamu mpe alamukaki na ngonga ya mwambé (8h00). Elobaki mpe na mpokwa ete «Bokolongono bwa nzoto ya Tata-Mosanto ekomi malamu», liyebisi ya mokolo mwa lundi na mpokwa  ya ndako ya bopanzi nsango ya Ngwendé-Esantu. ¡°bamonaki ete bokolongono bwa nzoto ya yé ebongi makasi, mpo ba analyse ya makila basalaki malakisi myango malamu. Nzoto eyanoli malamu na lisalisi mpe bankisi ya baminganga¡±. Yango nde epusi bango na kolongola Pronostic, kasi akotikala mwa mikolo lisusu na lopitalo mpo ba landela ye na ba nkisi mpe baterapi.

Ezali bongo bilembo malamu ya bobikisi ya bokono, kasi esengeli kozwa yango na ekenge mpenza, mpamba te bokono ya pneumonie na ye, ebiki nayino malamu tè. Linaka ya lopitalo elakisi ete makambo ezali ebele.

Lobi, Pàpa alandi ezuzulù ya karezimo ya Curie romaine na nzela ya bilili.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basango na kofina esika eye.

11 s¨¢nz¨¢ ya m¨ªs¨¢to 2025, 17:15