Angelus : Lopitalo, esika ya mwindà
Albys KBD CP – Kinshasa/RDC
Kino lomingo moye mwa (16) ya sanza ya marsi ba lomingo mitano molandi, oyo Mokonzi monene ya bantomà akambi losambo lya angelus te. Mateya mayé mozalaki kobima na nzela ya Vatican.
Na lomingo ya mibalé ya eleko ya karezimi, Pàpa alimboli Nsango elamu lokola likomamaki na mosantu Luka (Lc 9 ;28-36) oyo esakoli bomoniseli ya Yezu likolo lya ngomba nà Petre, Yakobo mpe Yoane. Kati na losambo, Yezu alingi kolakisa na bayekoli bayé « moye mobombami na sima ya elembo asili kokokisa kati na bango : mwinda mwa bolingi bwa yé ezali na nsuka te». Franswa alimboli ete eteni ya liloba linà elobeli yé.
Eleko moko ya mikakatano
Pàpa amiyebeli ete awuti koleka eleko ya mikakatano ut’o akotaki lopitalo. Elongo na bakoni lokola yé, Pàpa andimi ete atako nzoto ezali yakolembe, “eloko moko te ekoki kopekisa biso te na kolinga, na kosambela, na komikabela, na kozala biso na biso, elembo ya mwinda mwa elikya, na boyambi”.
Na lopitalo, lisalisi nà bolingo
FranCois asepeli na komona “boni boni mwinda mozali kongenge kati na ba lopitalo mpe bisika ya lisalisi”. Akumisi bongo ezalela ya bolingo ezali kopelisaka ba lopitalo, bisika bazali kosala mosala ya bomikitisi.
Pàpa asengi na bandimi na kosangana nà yé elongo na losambo mpo na kokumi nzambe oyo akotikaka biso soki moke te, mpe na tango yam pasi, akotiyaka pembeni ya biso, bato bakolakisaka biso bolingi bwa yé.
Papa apesi bongo melesi na bayé banso bazali komipesa na kolandela yé na bolingo, mpe lisanga ya bandimi banso bazali kosambela mpo na yé; mingi mpenza, etulùkù ya bana bakendaki na lopitalo Gemelli o mokolo mwa lomingo moye kolakisa ye bozalani pembeni na yé. Akomeli bango na maloba maye: “Bandeko bana, melesi na bino! Pàpa alingi bino mingi mpe azali kozela sé kokutana nà bino”.
Losambo mpo na Kimya
Na tango eye ya bokono, papa akobyanga na losambo mpo na eklezya. Alakisi bongo mokano awutaki kozwa tango basengaki ye nakososola mpona liyangani ya Sinodi liwuti koleka. Atondi botondi na Secrétariat général ya Sinodi, oyo amipesi nakotambwisa elongo ba eklezya ya mboka na eleko ya mibù misato.
Bo momeseno, azangaki té kosenga losambo mpo ya kimya, mingi mingi na bikolo bizoki na bitumba, lokola Ukrayina oyo ezali konyokwama “bomartiro”, Palestine, Israel, Liban, Birmanie, Soudan nà mpe Républik démocratiki ya Congo.
Na bosukisi, François asambeli ete “Ngondo mosantu maria abatela mpe asalisa biso na kozala baye bakomeme mwinda nà kimya ya Kristu”.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basango na kofina esika eye.