MAP

VATICAN-RELIGION-POPE-AUDIENCE VATICAN-RELIGION-POPE-AUDIENCE 

Papa abengi mpo na bososoli na pete makasi ya kokamwa ya Mwana-Nzambe

Na bokobi molongo ya mateya na bomwana ya Kristu, François ayebisi lisusu na bandimi lolenge nini bosakoli ya boyei ya Yezu ebandaki na bomikitisi, na nzela ya bosakoli na babokoli ya bibwele, ba nzengeneke ya liboso ya Mbotama.

Jean-René Bompolonga-Kinshasa

Na mokolo ya misato ya lelo ya audience générale, Papa akobaki molongo ya mateya matali bomwana ya Yezu. Liboso ya bandimi basangani na ndako ya makita Polo ya motoba ya Vatican, François azongeli bosakoli ya mbotama ya Kristu, lolenge ekomami na nsango elamu ya Santu Luka mpe bosakoli esalemaki epayi ya babokoli ya bibwele na Bethleem. Lokola atungisami na bronchite moko, episkopo ya Roma, nsima ya bopesi mbote na bandimi, apesaki liteya na ye na moko ya basali ya Secretairie ya Vatican, oyo atangaki yango.

Luka akotia mbotama ya Yezu na ‘eleko moko ekoki kozua date’ mpe na ‘esika moko ya géographie ekoki kolakisama’, na ndenge ete “mokili mobimba mpe ya solo bitutana”, elobaki Papa na liteya na ye, na botangi Bomwana ya Yezu, buku ya oyo ye alandi Benoît ya zomi na motoba. “Akolakisa na biso bongo bomikitisi ya Nzambe moko oyo ayei na lisapo mpe abebisi te lolenge mokili ezali, kasi alingi angengisa yango mpe asala yango lisusu na kati”   

Mbotama nanu esalema te mpo na mokonzi

Soki anjelu Gabriel apesaka nsango ya mbotama ya Yezu, Mokonzi, na elembo ya bonene (Lk 1,32-33), ezali bongo na ‘ndako ya lipa’ (ndimbola ya kombo ya Bethleem) esika Yezu abotamaki. “Abotami lipa ewuti likolo mpo na kotondisa nzala ya mokili”. Mbotama na ye, elakisaki Papa, “esalema nanu te mpo na mokonzi”. Mwana ya Nzambe abotami na ndako ya mokonzi te kasi esika bibwele baliaka.

Luka akolakisa biso bongo tè Nzambe akoya na mokili na kati ya makelele makasi te, amibimisi te na bogangi, kasi abandi nzela na ye na bomikitisi”, elimbolaki François. Bizali bongo babokoli bibwele ba nzeneneke ya yambo ya likambo wana ya kokamwa, “bato batangi mingi te, na nsolo na nzoto likolo ya bokutani ntango inso na banyama, bakobika libanda ya bato; kasi bazali kosala mosala eye Nzambe ye mei amilakisi na bato na ye”.   

Bato bakozwa nsango eleki malamu mingi

Baponami na Nzambe, babokoli bibwele bazali “bato bakozua nsango eleki kitoko mingi oyo nanu elobama te na lisolo” (Lk 2, 10-12), elakisaki lisusu François. Babokoli bibwele bazali ba nzeneneke ya yambo ya likambo ya ntina, elingi koloba ya mbote eye epesami.

Na nsuka ya liteya, Papa alendisi bandimi mpo bazala lokola babokoli bibwele, “bazali na makoki ya kokamwa mpe ya kokumisa liboso ya Nzambe, mpe bazali na makoki ya kobatela oyo ye apesaki biso, makoki na biso, ba charisme na biso, mbela na biso mpe bato baye akotia pembeni na biso”. “Tosenga na mokonzi koyeba kososola na pete na makasi ya kokamwa ya Mwana-Nzambe, oyo ayei kozongisa mokili sika mpe kobongola bomoi na biso na mwango etondi na elikya mpo na mokili mobimba”.&Բ;

12 sánzá ya míbalé 2025, 15:18