MAP

Pàpa Franswa nakokamba likita oyo etali lotomo mpo ya bana o mokili mobimba, o mokolo mwa 3 febuali 2025. Pàpa Franswa nakokamba likita oyo etali lotomo mpo ya bana o mokili mobimba, o mokolo mwa 3 febuali 2025.  (ANSA)

Likita mpo ya lotomo ya bana: «koboma bana mike ezali koboya kilobi»

Papa afungolaki na polele likita ya lotomo ya bana oyo ebongisamaki mokolo ya yambo mwa 03 febuali na vatican na comité pontifique mpo na mokolo ya bana ya mokili mobimba. Liboso ete Tata-Mosantu abengaki mpo na komesana ata moke te na bobukami ya lotomo ya bana mike. "Bomwana oyo ezali kotelemela bozangi bosembo ya esaleli ya nkita, nko ya koboma bato, na bitumba, kozanga lisalisi na bokono bwa nzoto mpe kelasi", esakoli yé.

Albys KBD, cp – Kinshasa/RDC

 

O mokolo mwa 25 ya sanza ya mai 2024, pàpa ayambaki bana 50.000 oyo bawutaki na mokili mobimba na stade olympique na Roma mpo na mokolo ya liboso penza ya bana na mokili mobimba. Sima ya sanza mwambe mileki, bokonzi monene bwa Pàpa abengisi na kati ya ndako ya bantoma bakambi ebele, bato ya polikiki, mpe bato ya nkita, batindami ya société civile mpe bato ya lingomba, mpo na kotia makoki mpe bandoto ya bilenge o kati kati ya mitungisi ya mikili.

Liboso ya kokutana na bato ndenge na ndenge, basangani mokolo ya yambo na tongo na likindo ena na salle clémentine, bokonzi bonene ya Pàpa ayambamaki na batindami ya bana, bapesaki ye mokanda oyo matondo mpe bopesi makanisi ekanamaki mpo na yé, tozali kokomela bino na kombo ya bana ya mabele mobimba, tolingi kopesa bino atondo mpo bozali komibanzabanza mpo na biso mpe avenir na biso, bolingi biso mpe bobatela biso, souligné les jeunes peuples, donc souligner le jeune peuple likolo ta theme ya likita oyo emonana naino te. Tolinga mpe tobatela bango. Likita oyo mokonzi-mwasi Rania Al Albullah ya Jordanie, satyarki Kaylash, oyo azwaki mbano (prix nobel) ya amerika, ekozala na makambo mwambe, kobanda na lotomo ya kotànga kelasi tii na lotomo ya kofanda mosika na mobulu ya ndenge nyonso.

Bomwana, emonisami lokola eloko ya mpamba na ezaleli ya bokasi (culture ya efficacité)

Na ntango ya lisukulu na ye ya bofungoli, pàpa atangaki makama oyo ezali kozela bana lelo, mpe zingazinga na yango balobi babengami mpo na kolobela mpo na kofungola mingongo ya sika mpo na kobokisa mpe kobatela bango. Ya liboso, fimbo ya bitumba mpe ya bobola, ya kozanga bosembo mpe ya kosalela bato mabe, oyo ezali kotya elembo na bomi ya bamilio ya bana. Nzokande, elakisaka polele pontif oyo azali mokonzi, epai kuna, na nzela ya nzambe, bato bazali konyokwama na bitumba to nzala te, atako bongo na ba peripherie ya mpasi, epai kuna bana mike mbala mingi bazwaka ba victimes

ya fragilités mpe ya mikakatano oto tokoki ko sous estimer te. Kobanda na mitungisi mpe kotungisama na makanisi oyo etali bilenge mingi koleka kala, mpe kotindika bango mpo na ntango mosusu kozwa nzela ya bokasi to ya bopesi makoki. François alobaki na mwana été, kaka lokola bobange, bomwana etalelami lokola périphérie ya existence na culture ya efficacité.

Bilenge bazali kobunda mpo na kozwa elikya epai na bango moko

“Mingimingi” ekobaki Franswa nakoloba, “baoyo bazali na bomoi liboso na bango azali na makoki te ya kopusana penepene na yango na elikya mpe na ezaleli ya malamu”. Mpe episkopo wa Roma mpo na kolobela ndakisa oyo ya mikolo ya biso: “ezali bobele bilenge, bato bazali bilembo ya elikya na masanga ya bato, kasi bazali kobunda mpo na koyeba (kokundola) elikya enà o kati ya bango moko”. Réalité moko ya mawa oyo bilenge bazali kokolela na yango: “tango kilobi eyebani te mpe ekokani te na ba ndoto, tango ba kelasi ekopesaka libakù te mpe bozangi eloko yak osala to musala ezali na makoki ya malamu te, ezali mpasi koboya ete kilelo koleka na nsomo mpe ezali kotungisa, elobi Franswa na kotanga mwa eteni ya manaka mayé ya jubilé ordinaire.

Koboya (kotelemela) kozala moombo ya bomeseno na mayé endimami te

Pàpa ya argentine asengi na basangani ya likita ete bamesana ata moke te na makambo oyo endimami te na bana oyo bakufaki na nse ya bombe, bapesameli mbeka na bikeko ya bakonzi, ya makanisi mpe ya matomba ya ekolo, na bana oyo bazali kokufa na mbu (ebale) to na esobe, na mibembo mingi oyo bazali na elikya te. Koboma bana mike ezali koboya kilobi, alobaki na molende. Bomwana oyo bazali kobwakisa ezali lolakà elobami na nsé kasi ezali kotelemela Bozangi bosembo ya lolenge kani bazali kosalela nkita, nko ya ya koboma bato na bitumba, bozangi lisungi ya bokono me bozangi kelasi. Kozanga bosembo ezali bebo (ebele) lokola pàpa alobi, bongo motuya ya bana pene na: 40 miliyon bazali kotambola mp ona kokima bitumba, 100 miliyon bazali na ndeko te, 160 miliyon bazwami na misala makasi, trafic mpe kosalela bana.  Na komesana na likambo oyo, pàpa akebisi, bomoto ezali na riske ya ko bungisa eloko ya motuyà oyo ezali o kati na motema ya moto, nzokandé “ngolu, bolimbisi”mpe “mawa”. François atyaki mpe makanisi na ye mpo na mwa ntango moke na mokakatano ya bana oyo bamonanaka te, oyo bazali kofanda kozanga statut civile, oyo motango na bango ekanisami kozala 150 millio mbala mingi bana wana bazangaka kozwa bokolongono mpe kelasi mpe, mpo na bozangi ya bomoto na bango mabe to kotekama na pete na boombo lokola bana ya

Rohhingya, bazali konyokolama na Birmanie, to ba indocumentados, bana oyo bazangi mikanda na ndelo ya amerika, “Kobima ya bato bayambo bazanga elikya mpe elikya ya bankoto ya bato bazali komata ut’o na sudi ya mikili mpo ya kokende na Etats-unis.

Masolo ya bitumba mpo na kososola motuya ya bomoyi.

 Mpo na kososola motuya monene ya bomoyi, franswa abengisi “kotala na miso ya baoyo bakutanaki na bitumba” na kala kasi “koyoka mpe lelomei bana oyo bazali kati na mobulu, na molimo ya kosalela, to bozangisi bosembo”. Matatoli oyo esalaka, engebene na tata mosantu, mpo na kolendisa biso na koloba “te” na bitumba, na elimo ya kobwakisa mpe kosalela baninga, mimeseno ya bosoto ekomema na kosomba mpe koteka kozanga limemya to mawa na bomoyi ya moto, mingimingi bomoi ya bana mike mpe oyo ezangi libateli. Pàpa azongelaki botelemeli bwa yé na momeseno ya kosopa zemi oyo ekataka liziba ya elikya mpo na bato banso.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda ya basango na kofina awa

04 sánzá ya míbalé 2025, 04:33