ÐÓMAPµ¼º½

Luka

2025.02.07 Liyangani  mpo ya libiangi  na Madrid kobanda mokolo mwa 7 kino 9 ya sanza ya febuali 2025. 2025.02.07 Liyangani mpo ya libiangi na Madrid kobanda mokolo mwa 7 kino 9 ya sanza ya febuali 2025. 

Franswa : libiangi ya moko na moko ezali komona boseng¨¤ ya basusu

Na nsango yay¨¦ mpo na likindo ya mikolo misato na oyo etali libiangi, efungwamaki bongo o mokolo mwa 7 febuali na Madrid n¨¤ basangani nkoto isato (3 milles), Bokonzi bonene bwa P¨¤pa ebwaki mbela ya kobotisa seko batalenta. Wana nde motuya mwa nsuka mwa bomoyi : kobebisa te biloko ya mokili mpe ya molimo mpo ya kotinda mosika basusu na biso mpe na Nzambe. ? Na esika ya mos¨¤l¨¤, na libot¨¤, na apostolat, na mis¨¤l¨¤, bomema Nzambi bipayi wapi akotinda bino?.

Albys KBD, cp ¨C Kinshasa/RDC

 

Sengà etaleli na makoki ya kososola bosengà ya ndeko moko; elobaki Pàpa Franswa na nsango apesaki na basangani ya liyangani etali libiangi «bazali mpo ya nani ? Liyangani ya bambéla na botindami» oyo, banda mokolo 7 kino 9 ya febuali, basanganaki na Madrid bato nkoto isato ya badiosezi ya ekolo ya Espagne, bayaki elongo na baepiskopo tuku motoba na itano (65). Ba makita tuku mitano na ineyi (54) na masanga ya balaik, mangomba nkàmà moko na tuku ibale (120) mpe nkàmà mibale nà tuku itano (250) ya makambo ndenge na ndenge emipesà na makambo ya etindà ezalaki wana. Basangani pene ya moko na misato bazalaki na nsé ya bambula tuku misato na itano. Nà ekwela ena ya mikolo misato ekosukisa bongo mosàlà ya baepiskopo babandaki o mobù 2021, likanisi lizali yakokomisa makasi o kati ya diosezi na diosezi mosàlà moko ekolendisa bomoyi lokola libiangi mpe kokolisa banzela ya libiangi ndenge na ndenge. Motùnà moponamaki lokola mama ya likambo ya likindo linà ezongeli oyo Franswa atunaki na exhortation apostilique Christus vivit (no 286), emonisamaki sima ya liyangani monene ya sinod ya mbala zomi na mitani, mp ona bilenge, boyambi mpe bososoli ya libiangi.

Kobotisisa batalenta

Nakolobela eteni ya biblia ya ¡°elenge mobali ya nkita¡±, papa alobeli ndimbola ya mokonzi nakoyeba oyo esengeli kosala mpo yakozwa bomoyi bwa séko. Franswa alimbolaki ete ¡°tozali banso babombi likabo ya ngrasya mpe lolenge Nzambe akopesa biso, mpe ba talenta na biso esengeli kotyama na bank mpe ebota litombà, bolamu ba biso esengeli kotekama, mpo ete mbuma ekomela basusu¡±.

Mokonzi alakisi na boboto ya kimoteyi, ete bolamu tokolikya ekozwama te na kotondisa baconditions mpe kokokisa ba objectif. Atako tobandi kosala yango uto bolenge bwa biso, ekozangela biso kaka mwa eloko ya mpamba, libonza ya bisomei mpo ya kolanda kristu na momekano ya bolingi boleki monene.

¡°Mokonzi alakisi na boboto ya kimoteyi, ete bolamu tokolikya ekozwama te na kotondisa baconditions mpe kokokisa ba objectif. Atako tobandi kosala yango uto bolenge bwa biso, ekozangela biso kaka mwa eloko ya mpamba, libonza ya bisomei mpo ya kolanda kristu na momekano ya bolingi boleki monene.¡±

Motuya ya bomoyi bwa biso ezali basusu.

Pàpa akanisi kozinda makasi ezindisaki ekolo ya Espagne na suka ya sanza ya zomi. Likambo moko ya mpasi kasi ndakisa ya courage mpe bondeko elandaki ezali mwinda. Ezali libaku ya kolakisa ete, basusu bazali motùya ya bomoyi bwa biso. Franswa alimboli boniboni elenge mobali oyo azalaki na bozwi mingi na nsango malamu ¡°amipesaki te na mosala ya ntina oyo Nzambe abengisaki ye¡±. Ndakisa oyo ekeseni mpenza na bayé, na kokesana, basili komipesa mpo na kosunga bato oyo bazwamaki na likàmà ya météorologie, kasi lisusu, na ndakisa, mpo na koyamba bato oyo bawuti na mikili mosusu to mpo na kosalisa na ntango ya kobima ya somo ya volkan ya La Palma.

Komema Nzambe bipayi binso, nde mbéla ya moto na moto

Mbéla ya Tata-Mosantu ezali ete ya kobebisa biloko ya mokili mpe ya molimo oyo tosengeli kokamba, ¡°na kosalelaka yango mpo na kobatela basusu mosika na biso mpe Nzambe, kasi tozala na makoki ya koloba ete tosengeli na eloko mosusu te nayino bolingo¡±. Komema Nzambe bisika binso tozali na bomoyi , elobi lisusu bokonzi bonene bwa Pàpa ¡°ezali mbéla ya biso¡±. Tolongola makanisi yakoloba ete oyo tozali na yango ekoki te, kutu ba apostolu bazalaki te na ¡°wolo mpe palata¡± kasi nsima ya kozwa Elimo Santu, bamekaki kososola mposa ya mobola ya abukanà makolo na tempelo (tala Bikela 3: 1-8), koleka kutu oyo bazalaki kolikya. Bapesaki ye mbongo te, kasi babengisi ye ¡°atala bango¡±, amona ndakisa ya bobola ba bango mpe, sima ya kobenda likebi lya yé, basengi yé atelema na bogumbami bwa yé.

¡°Tolongola makanisi yakoloba ete oyo tozali na yango ekoki te, kutu ba apostolu bazalaki te na ¡°wolo mpe palata¡± kasi nsima ya kozwa Elimo Santu, bamekaki kososola mposa ya mobola ya abukanà makolo na tempelo (tala Bikela 3: 1-8), koleka kutu oyo bazalaki kolikya. Bapesaki ye mbongo te, kasi babengisi ye ¡°atala bango¡±, amona ndakisa ya bobola ba bango mpe, sima ya kobenda likebi lya yé, basengi yé atelema na bogumbami bwa yé.¡±

Programe ya liyangani

Liyangani efungwamaki na mbote ya mokambi ya Conférence épiscopale ya ekolo ya Espagne, Mgr Luis Argüello, ya Archevêque ya Madrid, Cardinal José Cobo, ya Archevêque ya Braga, Mgr José Manuel García Cordeiro, oyo azali na mokumba ya ba vocations mpe ya bilenge ya Conseil ya ba conférences épiscopales ya Europe (CCEE) na ntomà ya papa na Espagne, Mgr José Manuel García Cordeiro. Nsima ya kolakisa mokanda ya mosala ya yambo mpe ngonga ya losambo na mokolo ya mitano, mokolo ya poso ekopesama mpo na mosàlà ya kolanda banzela minei oyo epesami: Liloba, lingomba (lisangà), likambo mpe etindà, mpo na moko na moko na yango pene na ba ateliers ntuku motoba ekanamaki, oyo ekopesa esika na lapolo ya nsuka.

 

 Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda ya basango na kofina awa

 

08 s¨¢nz¨¢ ya m¨ªbal¨¦ 2025, 21:33