ÐÓMAPµ¼º½

Luka

2025.02.04 Likanisi ya losambo ya P¨¤pa Franswa mpo ya sanza ya Febuali o mob¨´ 2025. 2025.02.04 Likanisi ya losambo ya P¨¤pa Franswa mpo ya sanza ya Febuali o mob¨´ 2025. 

Likanisi ya losambo ya P¨¤pa mpo na sanza ya Febuali : Mb¨¦l¨¤ na kibonganganzambe mpe kimamelo

Mpo na sanza ya Febuali, Tata-mosanto apesi likanisi na Eklezya ya mokili mobimba nakosambela mpo ya Libiangi ya bonganganzambe mpe ya kimamelo. Soki Nzambe akolembe te mpo yakobenga bango balanda y¨¦, o nzela ya kimibonz¨¤, Eklezya esengeli koyamba ?mposa na ntempe? ya bilenge bazali koyoka libiangi lin¨¤, esengi P¨¤pa Franswa.

Albys KBD, cp ¨C Kinshasa/RDC

 

Ut¡¯o mobù 1997, eklezya esepelaka mbula na mbula o mokolo mwa 2 ya Febuali mokolo ya bamibonzà, mpo na kotalisa malamu motuya ya bayé bamipésà na bomoyi bonà. Sima ya mokolo monà, Pàpa apesi likanisi na eklezya mobimba mpo na sanza oyo ya febuali 2025 mobimba na kosambela mpo ya libiangi ya bilenge na kibonganga mpe na kimamelo.  

¡°Kasi mokolo moko, nakoti na paloase. Nzokandé Nzambe azalaki kozela ngai wana!¡±

«Tango na zalaki na mibù zomi na sambo (17), nazalaki koyekola mpe kosala. Na zalaki nà baprojet. Nazalaki na makanisi ata moke te ya kokoma sango. Kasi mokolo moko, nakoti na paloase. Nzokandé Nzambe azalaki kozela ngai wana!», ezongeli pàpa kokanisa na libandela ya bilili mpo ya koyebisa likanisi ya sanza.

Koyoka mbela ya Nzambe

Na likambo ezali koleya ya bokitisi ya motango ya libiangi na kibonganga mpe na kimamelo, Tata-Mosantu alaki ete ¡°lelomei lisusu, Nzambe azali kokoba na kobianga bilenge, zambi na bilembo elongobani te¡±. Engebene na ¡°buku ya mitango ya ba feti ya eklezya¡±, ezongisamaki na molongo o mokolo mwa 31ya desembere 2022, oyo elakisi ete motango ya basango o mokili mobimba ekiti kikita tee na 407730. Eklezya ya katoliko etangi lolenge yoko 49 414 ya bamibonzà kasi bazali banganganzambe te nà mpe 599 228 ya bamamelo, mitango mibale ekiti lisusu nakotala oyo ya mibù mileki liboso.  

¡°Lolakà la Nzambe ekoki kozwa banzela ndenge na ndenge, elobi Pàpa ya Argentine, tembe te na nzela ya ¡°bandoto¡± mpe ¡°mitungisi bilengge bakoyokaka ontei ya bango¡±. Asengi bongo na eklezya mobimba nakosunga bilenge oyo bazwi mbela ya mokonzi, lokola lolenge ya komono ¡°boni boni Nzambe akosala makambo masika elongo nà bango¡±.¡±

Solo mpo ya Franswa, likàmà ezali na libiangi la Nzambe te kasi na boyoki mpe na ndimbola ya bilenge babiangemi. ¡°Mingimingi toyokaka ye te mpo tozwami na makambo ebele, ba projets ya biso, kutu pe misala mya biso ya eklezya¡±. Lolakà la Nzambe ekoki kozwa banzela ndenge na ndenge, elobi Pàpa ya Argentine, tembe te na nzela ya ¡°bandoto¡± mpe ¡°mitungisi bilengge bakoyokaka ontei ya bango¡±. Asengi bongo na eklezya mobimba nakosunga bilenge oyo bazwi mbela ya mokonzi, lokola lolenge ya komono ¡°boni boni Nzambe akosala makambo masika elongo nà bango¡±. Bokonzi bonene ya Pàpa elendisi bongo bilenge nakomipesa na mbela ya bango ya kimibonzà to ya kinganganzambe ewuti na Nzambe, mbélà moko ya ¡°kosalela malamu eklezya mpe mokili ya lelo¡±.

Koyamba Bamposa mpe batembe

Na nsuka ya bilili Pàpa atindi nsango moko ya elikya: ¡°Totyelani bilenge motema! Mingi mpenza, Totyelani Nzambe motema, zambi akobianga moto na moto kati na biso!¡±. ¡°Sambelani mpo ete Lingombà lya eklezya eyamba mposa mpe ntembe ya bilenge oyo bazali koyoka mbela ya etindà ya Yezu kati na bomoyi lokola nganganzambe to mpe mamelo¡±, esukisi yé. 

¡°¡°Totyelani bilenge motema! Mingi mpenza, Totyelani Nzambe motema, zambi akobianga moto na moto kati na biso!¡±¡±

Sango Cristo Cristóbal Fones, S.J., Moyangeli ya mikili na lisanga ya mokili mobimba ya losambo lya Pàpa, apesi likanisi lokola elembo ezalela ya bofungoli na etindà ya lendisa bilenge na mbéla babango, nakozanga kopekisa nzela oyo Nzambemei afungolaka mingimingi ontei ya mabotà.

Na bosukisi, na libakù ya Yubilé 2025, losambo na likanisi ya Bokonzi bonene bwa Pàpa, ezwami o kati ya mikano mpo yakozwa bolimbi bwa masumu epesami na mobù moyé ya santu, bongo kosangana na Ukaristya, nà sacramenti ya ntubelà mpe koleka o Ezibeli (ekuké) esantu moko.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda ya basango na kofina awa

 

04 s¨¢nz¨¢ ya m¨ªbal¨¦ 2025, 05:24