«Butu ya kimia» na Gemelli, Papa akopema mpe akotanga makomi ya bapanzi nsango
Jean-René Bompolonga-Kinshasa
“Butu eleki malamu mpo na Papa, akotaki o lopitalo Gemelli mokolo ya 14 ya sanza ya mibale mpo na maladi ekotungisa ye mpo na kopema, lolenge biyano ya ba examen basalaki mikolo mileki bibimaki ». Matteo Bruni, molobeli ya Vatican, ayebisi yango na bapanzi nsango mokolo ya 18 ya sanza ya mibale na ndako ya masolo ya Vatican.
Mokano ya bopemi mingi
« Papa apemaki, alamukaki na ntongo ya lelo, azui petit-déjeuner mpe amipesi na botangi makomi ya bapanzi nsango, lokola asalaka yango na momeseno », elobaki Matteo Bruni. Ba nsango misusu ya minganga bikolobama lelo mokolo ya mibale na nsima ya nzanga. Asemboli ete sik’oyo Papa akopema na ndenge elongobani ye moko. Akolanda mokano ya “bopemi mingi” lokola minganga bakomeli ye kobanda mikolo minei. Yango wana esali tè Papa akoka kokamba losambo y’Angélus te mokolo ya eyenga elekaki.
Na ngonga eye, nsango moko te epesami mpo na mokolo ya eyenga ezali koya mpe ba mbongwana misusu bikosalema na manaka ya Papa. Nsango eyebani ezali kaka ya misala alingaki kosala mokolo ya poso 22 ya sanza ya mibale bikosalema lisusu te. Se bongo, misa ebongaki esalema mokolo ya eyenga 23 ya sanza ya mibale, na ngonga ya libwa, na basilique Santu Petelo, mpo na Jubilé ya ba diacre, Papa apesi ndingisa na Mgr Rino Fisichella, pro-préfet, ya dicastère ya Evangélisation.
Ba dessins na ba cartes bikosopana na Gemelli
Lokola azali kokoba kolanda oyo minganga bakomeli ye, Papa akokoba kobenga na nzela ya nsinga paloisse Sainte Famille na Gaza. Mokambi ya paloisse, sango Gabriel Romanelli, alobaki lisolo azuaki na Santu Papa mokolo ya liboso na mpokwa. Papa alobaki na “mongongo makasi mpe polele”.
François akozua mikanda bebo bizali kotombela ye libiki elamu, na ba dessins mpe ba cartes. Kati na yango misusu bikowuta bipayi ya bana bazali na lopitalo Gemelli, ba vosins na ye ya etage ya zomi. Papa azangaka kotala bango te o eleko akotaka lopitalo liboso.