MAP

2025.01.11 Pàpa Franswa na tango ya Malongi ya Yubilé o mokolo mwa poso mwa 11 ya sanza ya yanuali 2025.  2025.01.11 Pàpa Franswa na tango ya Malongi ya Yubilé o mokolo mwa poso mwa 11 ya sanza ya yanuali 2025.   (Vatican Media)

Yubilé, libaku ya kolónga bokabwani mpe kotonga kimya

Na elilingi moko ebimisamaki o mokolo mwa mosàlà mibale mwa 14 ya sanza ya yanuali na X, Pápa abengisi biso « tókanisa lisusu boyokani » kati na bato mpe masanga ya bato, na koyambaka « bozaleli ya bokutani».

Albys KBD cp – Kinshasa/RDC

 

«Tika ete ♯Yubile 2025 ezala mpo na bato banso, baklisto mpe baye bazali baklisto te, libaku ya kokanisa lisusu boyokani oyo ekangisaka biso lokola bato mpe masanga ya politiki ; Koleka (kolonga) bozaleli bobedani, koyamba bozaleli ya bokutani mpe kotonga kilobi ya kimya », nde akomaki Pàpa na X.

 Na compte na ye @Pontifex, oyo ezali na minoko libwa elandami na ba milliyon ya bato na mokili mobimba, Pápa azali kopakola (kosala) langi na mosika ya likolo (horizon) oyo azali kosenga, «kilobi ya kimia » oyo moto na moto akabolaka na mozalani na ye, lizità lya likambo (libakù) bakutani na yango  o kati ya ba masanga oyo afandaka.

Komikomisa kati na bozaleli ya bokutani

Na ba eleko ya mikili minso o mokolo mwa lelo, moto ya likambo ya kimya ezali bisika binso na ngonga moko, lolenge yoko na ba mbelà ekofunda «ligboma (bozoba)», ya bitumba oyo ekoki ko koto na “bipayi (bisika) binso” ezali bobele “kopola (elonga tè)”. Solo Pàpa atelemeli “bozaleli ya bondongani ” na oyo ya “bokutani”, mpe andimi yango lisusu poso moleki na lisikulu na ye na Corps diplomatique oyo bapesaki ndingisa na Ebonga Esantu, nakosenga na ba ambassadeurs koti ana makasi “ mayele (diplomatie) ya elikia” na «botungisi makasi ya bitumba oyo ezali komonono o mokili mobimba». Elikya ezali singa motane ya mobù ya Jubile, bongoFranswa abengi mutu inso azala mosakoli na yango.

“Solo Pàpa atelemeli “bozaleli ya bondongani ” na oyo ya “bokutani”, mpe andimi yango lisusu poso moleki na lisikulu na ye na Corps diplomatique oyo bapesaki ndingisa na Ebonga Esantu, nakosenga na ba ambassadeurs koti ana makasi “ mayele (diplomatie) ya elikia” na «botungisi makasi ya bitumba oyo ezali komonono o mokili mobimba».”

Yubile, libaku moko mpo na bakristo mpe bayé bazali bakristo te

Linaka (Malako) ya kolakisa ya Mobu Mosantu, Spes non confundit, elobeli “mposa makasi” ya Pápa ya komona “molulu ya oecuménique” kosalema na mobu oyo mpe kosepela mibu 1700 ya Likita ya Nicée. Papa azali ko beta nsete na «boyambi» oyo kati na bokeseni ya mangombà, nakofungolaka mingi maboko na ye – mpe bizipeli (bikuké) biayé – na «banso, baklistu mpe baye bazali bakristu te». Ba Elikya, oyo, na bowumeli ya mobu 2024, ebongolamaki na ndenge ya solosolo na ebele ya mateya (malongi) oyo Franswa apesaki na ba-Luthers, ba-Méthodistes, kasi mpe epai ya Patriarche ya Assiry Catholicos Mar Awa III, mbula ntuku misato nsima ya kotya sinyatili na “Lisakoli ya bokristo ya bato banso” ya Mosantu Yoane Polo ya mibale (Jean-Paul II) mpe Mar Dinkha IV, oyo esukisaki matata ya mateya yaya tembe koleka ba mbula nkóto kati na Lingomba ya Katoliko mpe Mangomba ya Esti ya mokili.

“mbula ntuku misato nsima ya kotya sinyatili na “Lisakoli ya bokristo ya bato banso” ya Mosantu Yoane Polo ya mibale (Jean-Paul II) mpe Mar Dinkha IV, oyo esukisaki matata ya mateya yaya tembe koleka ba mbula nkóto kati na Lingomba ya Katoliko mpe Mangomba ya Esti ya mokili.”

Boyokani kati na bato mpe kati ya masanga ya politiki

Na nsuka, Yubilé ezali libaku ya kotalela na likanisi mosusu boyokani « oyo ekangisaka biso lokola bato mpe masanga ya politiki». Na oyo etali boyokani ya miso na miso, Pápa asengaki mbala ebele ete “bakóma na ndenge ya momeseno”, “batalana na miso”, kasi “na nzela ya batelefone ya maboko te”.  te. Na likambo liye, Franswa abetaki lisolo kala mingi te, na ntango ya bokutani na mibali mpe basi ya lingomba ya libota ya Calasanziana, nakopesa bango ndakisa ya episkopo moko oyo “atindamaki mpo na kokende kotambwisa makolo” na libota moko oyo eyambaki ye mpo na koliya, bongo, apalelaki bango mpo esaleli ya ba tshombo na bango oyo batiyaki likolo ya mesà.

Na koyeisa monene spectre, Pápa azali kotingama na ntina ya kokanisa lisusu boyokani na kati ya masanga ya politiki. Franswa azali kobeta nseter na botùyà ya « kofandisa na lingomba ya bato, ya mosala » mpe, na «politiki», message oyo ezongelami na ba génération ya sika, ba futurs promoteurs ya boyokani kati na lisanga ya bato mpe na bokeseni ya bomeseni ya bankoko. Na maloba na ye na bilenge ya « Projet Policoro » ya Lisanga ya ba Episkopo ya ekolo ya Italy (CEI), Papa abengisaki bango nakosangana na bozangi kobanga « kobebisa maboko », kutu kokende tii na « ko vanda » o kati ya bitumba.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda ya basango na kofina awa

 

14 sánzá ya yambo 2025, 12:33