Angelus: Mokonzi mpe ayei lelo o limpati elongo na biso
Albys KBD, cp – Kinshasa/RDC
Lomingo mwa 19 ya sanza ya yanuali, lomingo la mibale la mobù C, Pàpa azalaki na bokutani na ebele ya bato ba mobembo basanganaki na losambo la Angelus basalaka na Maria. Ut’o bofungoli bwa mobù ya Yubilé, bitùlùka ya bato ebele ebakisami mbala mibale – misato, bazelaki komonoTata mosantu na nsé ya lininisa lya yé bo momeseno sima ya ngonga ya midi. “Bandeko babali nà basi, lomingo lolamo”, nde mbote ya Pàpà oyo alingi biso banso “bandeko” mpe oyo lobiko na ye esangisi kimia ya liyangani, matoyi mpe mitema efungwami mpo na koyoka molandi mwa (mokitani) Kristo. « Nayoka, oyo ekoloba Mokonzi Nzambe » (Ps.84)
Yezu, Molongani oyo amemi “vino elengi (elamu)” ya bolingi bwa yé
Ezali nde na lisolo ya libàla lya Kàna, Pàpa avandisi mateya ma yé oyo ebetami na nsango elamo mwa mokolo. Litangi liye la mokanda ya Yoane 2, 1-11 “ekobeta lisolo lya likamwisi lya yambo Yezu abongolaki mayi na vino na mboka Galilea”. Mpo na Tata-Mosantu, lisolo eye “ekotalisa liboso mpe ekolakisa na bokuse etinda ya Yezu: mokolo mwa boyei ya Mesya” lokola elobamaki na basakoli: “Mokonzi akolambela bato babikolo binso limpati lya elengi (tala na Izaya 25,6) mpe bangomba ekonokisa vino ya sika (tala na Amos 9,13)”.
Bozangi mpe bolekisi ndelo (bofuluki)
Pàpa alobi ete na nsango elamu eye, tokoki kokundola biloko mibale: “Bozangi mpe bofuluki”. « Na ngambo moko, vino esili, bongo Maria alobi na mwana wa yé: ‘bazali na vino te’ (v,3); na ngambo mosusu, Yezu akoti likambo yango nakotondisa bambéki minene motobà mpe, na nsuka, vino eleki ndelo mpe elengi kino kapita wa balàmbi atuni mobali mpo nini babombaki yango na nsuka (v. 10) » elimboli yé . Mpo ya kosukisa,alobi ete « elembo ya biso ezali sé bozangi, kasi elembo ya Nzambe ezali bofuluki, “bofuluki ya Kàna ezali nde ndakisa ya elembo ena” » Awa akanisi maloba ma moto azalaki liboso laye, nkondo Papa Benoît XVI, na Yezu wa Nazareti. (tala na Benoit XVI, Nazareti, vol. I, 294). «Na bozangi bwa moto, Boni boni Nzambe akoyanola yé? na bofuluki», elobi Tata-Mosantu. (tala na Rm5,20). “Nzambe azali na lolendo te, soki apesi, akopesa koleka ndelo. Akopesa bino mwa eteni moke te, akopesa bino eleki ndelo”, ebeti yen sete.
Mokonzi akopesa na biso bolingi bwa yé boleki ndelo
Franswa alobelaki makambo mabomoyi wapi moko moko akoki koloba na ngala na ye, « vino mozangi» « na limpati lya bomoyi bwa biso », « ezangi makasi mpe makambo ebele ». « Esalemaka boye ntango mitungisi oyo ezali konyokola biso, bobangi oyo ezali kobundisa biso to nguya ya mabe oyo ezali kobulunganisa biso ekolongolaka biso elengi ya bomoi, bolangwi masanga ya esengo mpe elengi ya elikya», elimboli oyo akotika soki moke te kobianga biso na « esnego ya Nsango Elamu». Mingi mingi bozangi bozali kati na biso, mingi mingi bofuluki bwa nzambe bozali, esakoli Pàpa. “Mpo Mokonzi alingi kosepela elongo na biso, o limpati nsuka te”, esakolaki François, yambo ya kobelela bolobeli ya Ngondo Maria, “mwasi ya vino ya sika” (tala Don Antonio BELLO, Maria, mwasi ya mikolo na biso) mpo ete “asalisa biso tozwa lisusu esengo ya bokutani na Mokonzi Yesu”.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda ya basango na kofina awa