Angelus: Motema, liziba (ewutelo) mpe misisa
Albys KBD CP â O mboka Kinshasa/RDC
Na lomingo ya yambo ya sanza ya zomi na moko, Mokonzi Papa azali kolendisa mpo ya kozengela o ntei ya boyambi bwa Kristu, bolingi. Na nsé ya moyi ya place Saint Pierre, François azongeli kolobela likambo lya motuna motèyi wa mobèko atunaki Yezu, âmobèko nini moleki bonene o bùku ya mibèko?â Motuna moko ya âmotuyaâ mpo ya bandimi banso, elobi Papa, ânzokande biso mpe tomitikaka na mabulungani ndenge na ndenge, bongo na nsuka tokomitunaka, eloko nini ezali na motuya koleka banso? Epai wapi nakoki kozwa oyo ekongengisaka nyonso?â
Motema, Liziba (ewutelo) mpe misisa
Papa abakisi ete eloko ya motuya o nzela ya boyambi ezali lolenge moto akomipesa na Nzambe. Alobi, âesengeli tosimba ete, tango Mokonzi akozonga, akotuna biso mp ona likambo ya Bolingi tokopesaka mpe oyo to pesaki teâ.
Komisosola (Komitalela na bosembo)
Ndè bòngò Mkonzi monene abiangi etùluku y abato, nakopika o mitema mya bango mobèko moleki motuya âo linga Mokonzi Nzambe wa yo, mpe olinga moninga wa yo lokola okomìlingakaâ.
Mbela ya mibale ya mokitani wa santu Petelo ezali nde komisosola mikolo minso mpe komituna, âsoki Bolingi bwa Nzambe mpe moye mwa baninga, ezali ontei ya bomoyi bwa ngai? Losambo la ngai na Nzambe ekomeme ngai epai ya bandeko babali na basi mpe kolinga bango na ndenge ya ofele? Komituna soki nazali koyeba bozali bwa Mokonzi kati na elongi ya baninga basusu?â
Botondi na ndenge otango mokanda eye. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na manaka na biso ya basango nakofina esika eye