MAP

Bitumba ya ba-Israel na paloase  Sainte-Famille ya Gaza, Bato basato bakufaki, Sango-Mokonzi azoki . Bitumba ya ba-Israel na paloase Sainte-Famille ya Gaza, Bato basato bakufaki, Sango-Mokonzi azoki . 

Israël atie mobúlú na paloase katoliko ya Gaza, sángó Romanelli azoki

Na tóngo ya mokolo mwa mosàlà minei, mwa zomi na sambo ya sànzà ya sambo ( 17juillet), limpinga ya Israël ebetaki paloise katoliko ya Libota-Esantu ( Sainte-Famille) na etúka ya Gaza. Sángó Romanelli, sángó mokonzi ya paloise ya etúka ya Gaza, azokaki, nsango epesami na Patriarcat latin ya Yeruzalema.

Jean-René B. - Kinshasa/RDC

 

«Eklezia Libota-Esantu ya Gaza ebetamaki na limpinga ya Israël na tóngo, bato bazoki ebele na esika yango, kati na bango sángó ya paloise, sángó Gabrielle Romanelli», elobi Patriarcat latin ya Yeruzalema na liyebisi moko epesami mokolo mwa minei 17 ya sánzá ya sambo na ngonga ya 10 na ndámbo. Sángó mokonzi azoki moke na lokolo.  

Bato mibale bazoki makasi

Engebene na episkopo ya lokúmu Pierbattista Pizzaballa, patriarche latin ya Yelusaleme, asololaki na nzela ya singa na Vatican News, bato minei bazokaki, “kati na bango mibale bazokaki makasi koleka, eyebani te soki bazali kaka na bomoi”. Kati na baye bazoki “mwa moke”, sángó Romanelli. “Bango banso bazalaki na paloise” o eleko mobúlú esalemaki, ebakisi episkopo ya lokúmu Pizzaballa.

Bifélo ya ndáko ya Nzámbe bibebi. Engebene na patriarche latin ya Yelusaleme, «tank moko etutaki ndáko ya Nzámbe”. Kasi bapanzi nsango ebele bakoloba ezalaki mobúlú esalemi na nzela ya pepo.

Ba nsango bizali naino ndámbo ndámbo, bosololi na Gaza ezali pete te, mingi mpenzá lelo”, ebakisaki episkopo ya lokúmu Pizzaballa.

Pàpa Leon ya Zomi na minei ( Pàpa Léon XIV) abyangi na bokati masasi na Gaza, sima ya bitumba na ndako-Nzambe Sainte-Famille.
Pàpa Leon ya Zomi na minei ( Pàpa Léon XIV) abyangi na bokati masasi na Gaza, sima ya bitumba na ndako-Nzambe Sainte-Famille.   (AFP or licensors)

Esika ya kovanda po ya baye bakima

Ndáko ya Nzámbe ya Libota-Esantu ezali paloise se yoko katoliko ya Gaza, na Palestine. Bato ya Palestine bakima etumba bipayi na bango bazalaka kúná.  

Paloise katoliko ya Gaza ezalaka na eteni ya etúka na kómbó ya Zeitoun. Banzinganzinga na ye bibetamaka na limpinga ya Israël na sánzá ya zómi na mibale 2023.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

17 sánzá ya nsambo 2025, 12:25