Eklezya ya Koreya ekokisi mibù nkàma moko (100 ans) ya boluboli bwa bamartyro bya bango.
Bansango ya Vatikan
O mokolo mwa poso mwa 5 ya yuli, diosezi-mokonzi ya Séoul, na ekolo ya Coréé ya Ngelè (Sudi), esepelaki mibù nkàmà moko ya boluboli bwa ba-esengo tùkù sambo na libwà (79) ya mboka Coréé. Babomaki bango na tango ya minyoko ya Gihae na 1839 mpe ya Byeong-o na 1846. Mpo ya kopesa bango lokùmu, bakundoli mokolo monà na misa moko ekambamaki na Mgr Soon-taick Chung.
“Ata o kati ya mikakatano mya minyoko makasi, bamartyro bànà batikaki soko moke te boyambi bwa bango epai na Nzambe. Boyiki mpiko ya bango elendisaki kondima na bango, oyo wapi ebotaki nzokandé mbuma, na lolenge ya elikya eye ya solo elóngaki liwa”, elobaki episkopo-mokonzi ya Séoul na mateya ma yé.
Ezali Pàpa Pie XI ndé moto alubolaki bamartiro biye tùkù sambo na libwà (79) ya Corée, na bazilike Santu-Petro (Saint-Pierre), mokolo mwa mitano (5) ya sànzà ya yuli ya 1925. Bongo Santu Paul VI alubolaki na ngala ya mibale baye bazalaki 24, na 1968. Bituluku biye mibale bikokisi batu nkàmà moko na misato (103), mpe bakómisamaki basantu na Pápa Jean-Paul II na 1984.
Bandimi koleka nkota yoko (1000) basangànaki mpo na milulu minà na musée ya ndako-nzambe ya Seosomum na Séoul, bisika tùkù minei na moko (41) ya bamartiro tùkù sambo na libwà babungisaki bomoi bwa bango. Ndako ya bopanzi-nsango ya Fides elobi ‘te: ba bomaki bakatolike pene ya nkoto zomi na motoba (16000) na eklezya ya Corée na ekeke ya zomi na libwà (19è Siècle). Bonsomi ya losambo na Corée, epesamaki na Bakatolike bobele na mobù 1895.
Lapolo la sika nà mikanda mya kala
Na suka ya misa, elobi liyebisi moko ya bobanzi-nsango ya diosezi, lapolo la sika na nkombo ya “Mikanda ya mikyoko ya Gihae mpe Byeong-o ”, ebimisamaki na Comité ya bobepi lokùmu na bamartiro ya diosezi ya Séoul. Mosàlà moye mosimbami na makomi mya bokonzi, mikanda ya tribinale mpe mikanda ya Leta ya boyangeli bwa Joseon oyo ezalaki na bokonzi na eleko ya minyoko. Mikanda ya Leta mpe makambo ya ntango wana oyo ezali na kati ya lapolo yango, ebongolamaki mpe na lokotà ya Corée mpo bato ba mayele mpe bandimi ba Katolike báyeba yango malamu. «Atako ezali makomi ya bato baye banyokolaki bamartiro, eyamba ya mpiko mpe bososoli bwa mozindo ya bamartiro ezali komonana polele mpenza kati na yango» ; elobi episkopo-mokonzi Chung.
Bolakisi bwa biloko nkàmà mibale na tùkù sambo (270 objets)
Kino mokolo mwa zomi na minei (14) ya sànzà ya libwà liye lizali koya, bato bakoki kotala elakiseli moko ya ntina mingi oyo ebéngami «Anima Mundi – Souls of the Wold, elomboli na lokota ya lingala : Milimo mwa mokili ». Bafungolaki yango o kati ya tempelo sima ya misa mpo na kokundola mibù nkàmà moko ya exposition missionnaire mondiale ut’o 1925 ya musées ya Vatican. Eklezya ya Coréé mpe esanganaki na molulu monà. Manso mazali kosalema lelo na Séoul, mauti na “pavillon ya Joseon” oyo etongamaki na 1925 na lobàlà (jardin) ya Vatican. Yango emonisi lolenge eklezya ya Corée ezalaki na eleko enà. Elakisaki biloko 270 eutaki na ba musées mpe ba monastele zomi na motoba (16) ya Corée, elongo na biloko bisusu badefaki na musée ya Vatican. Komonisa biloko binà ezali kolendisa likanisi lya ntina yam asolo, ya komemya mpe ya kozala elongo (bovandi esika moko) na kimya kati na bikolo.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.