Congo-Brazzaville: zubilé ya wolo ya lingombà ya bana «Yambote»
Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC
Lisànga ya bana Yambote, ezali mosàlà ya sàngό moko ya lingomba ya Marie, misionele na République ya Congo. Ndeko Jean Marie Danis, mokonzi ya lingomba oyo abotamaki na ekólo France, asalaki bambula mingi mpo na kosalisa bana mpe bilenge na Diosezi-Mokonzi ya Brazzaville, epai wapi akufaki na 1983. Ezali na nzela ya libándá ya centre aéré ya Kindamba, esika wapi bana bazalaki kozwa mateya, nde azwaki likanisi ya likambo linà. Oyo ezali eyano apesaki na bana, tango basalaki yé motuna ya koyeba boni boni bazwaki centre enà. Na esengo mpenza, bana bayanolaki ‘te: “Yambote” – “ezalaki malamu”.
Mbula tùkù mitano na nsima, lingomba eye epalanganaki na ba-diosezi inso ya ekólo, “kaka na molende mingi mpamba té, kasi mpe na mbuma ebele oyo ebimi o kati”. Ndeko mwasi Bed’estelle Rhyta KIMANI, mamelo ya lingomba ya ba Passionistes, yémei azalaki mosangani mpe mokambi ya lisàngà liye, atatoli mpe amonisi bosolo ya likambo lyango.
Kokabolana na esengo mpe kolona bolingo
Mamello atatoli bomengo ya libula oyo tata na bango ya molimo atikelaki bango. Abyangi baboti balendisa bana ba bango basangana nà basusu kati na lisàngà liye. Kuna bakokabolana esengo ya kozala banzeneneke ba Kristu, bana oyo bazali kolona bolingo na nzela ya misala mya bomoi, bana oyo bamipesi mpo na mikolo mizali koya ya malamu. Amemi na motema mwa yé mawa to bobangi oyo ezali lolenge yoko nà oyo ya ndeko Danis oyo akufà. Nde azongeli maloba mayambo ya losambo asalaki na Maria: “O Maria, obyangi ngai na kopono bomoi ya mopostolo: kozongisa bana epai na yo mpo ‘te bazala pene na Yezu, Mwana na Yo. Ndima (yamba) libondi lya bomoi bwa ngai, mpo ‘te bilenge bálinga kosalela yo mpe bámipesa epai na yo”.
Komona mpe kosàla lokola elembo ya bolingo bwa Nzambe mpe ya mozalani
Lisàngà Yambote eyebani na “bikela bya bomoi”, elingi koloba misala ya malamu. Na nzela ya maloba maye, lisànga ezali koteya bana ntina ya kotatola Kristu mpe Nsango Elamu epai ya baninga ba bango. Ndeko mwasi Bed’estelle alobi ‘te, “likambo ya ntina ezali nde ya kosalisa bana bándima “kosalisa bato oyo bazali na bosénga na zingazinga ya bango, kozanga kofutisa bango mbongo”.
“Kotala mpe kosala lolenge lya elembo ya bolingo bwa Nzambe mpe mpo na mozalani (moninga)”, ebakisi ye. Alobeli bongo molongo mwa tùkù minei ya eteni ya tùkù mibale na mitano ya Nsango Elamo ya santu Mateo (Mt, 25, 40): “Ya solo nalobi na bino ‘te, manso bosàlàki bόngό na moto wa nsuka wa bandeko ba ngai, bosàlelaki ngai moko”. Lolenge ya koteya na makita ma bango, eséngaka ‘te bana bálobela makambo oyo bakutaná na yango na bomoi. Mosala mwango etalelami na baningà basusu (. . .) mpo na kotala, balandela soki mosala moningà mwana asalaki, ezali malamu mpe ya solo; mpe mingimingi mpenza, mpo na kosepela na yango, elobi mamalo. Nzokandé ezali kopesa bana mosusu mposa ya kosala bolamu; “ekokóma mposa ya bango ya kosàla bolamu epai ya bato oyo bazali zingazinga ya bango mpe, tango bakoli, bakokóma na bizaleli malamu”.
Lisàngà Yambote epesi na Eklezya Bakengeli mpe basàli ya bokengeli mpata
Mbuma ya mateya mànà mizali komonana polele na kati ya Eklezia ya Congo-Brazzaville. Na boumeli ya mibu ntuku mitano, lingomba Yambote epesaki na eklezya bakengeli mpe basàli ya bokengeli mpata. Sœur Bed’estelle amonisi lokùmu ya etuluku mobimba na koyeba ‘te na kati ya bato ya kala ya etuluku, ezali na episkopo moko, mokambi ya lingomba moko ya bandeko basi ya Sainte Marie Madeleine Postel. Batangi mpe ebele ya banganga-Nzambe, basàngό nà bamamelo, kasi mpe mingimingi batata na bamama ya mabota oyo bamonisami lokola bandakisa malamu ya bomipesi na bokristo, mpe bazali kosalisa Eklezia ya mboka na misàlà mpe mikumba ndenge na ndenge. Epai mosusu, mamelo ayebisi biso ‘te, Lisàngà Yambote ezali na bopusi makasi mpo na bituluku ya masàngà misusu ya Katolike oyo ezali kosalisa bana na Congo-Brazzaville. Yango elimboli na lolenge Yambote ezalaki lisàngà ya bana ya yambo, oyo ebotamaki o kati ya eklezya.
Zubile, lokola tango ya makambo ma sika
Na bosepeli Zubilé eye esangani nà zubilé ya elikya ezali kosalema o mobù moye. Mamelo Bed’estelle azali kolikya ‘te makanisi mango masalisa lisàngà liye, “ezongela makambo ya ebandela na yango; elingi koloba ‘te ezongela ntina wapi lisangà liye ebandisamaki: koteya bana oyo, na nzela ya misala ya malamu oyo bazali kosala zingazinga na bango, bakoma banzeneneke ba solo ya Kristu”. Mamelo alobi ‘te azali na elikya, mpamba te, na nzela ya mokano moye mwa sika, “mpiko ya sika ekobima na kati ya lingomba, ekotiya motema na Nzambe, na bolobeli bwa Maria Mama wa biso, mpe ya ndeko Jean Marie Danis, mobandisi mwa mosàlà monà, mpo ‘te lingomba Yambote eyeba koyanola na bosénga mpe na makambo ya lombangu ezali kobima lelomei o kati ya Eklezya mpe ekolo ya Congo”. Losambo la yé ezali ‘te: “bana ya mokili mobimba mpe bana ya Lisàngà Yambote oyo bazali kosepela zubilé na bango ya wolo, bakόma bana oyo bazali kopesa esengo; oyo bazali koyoka esengo ya kozala banzeneneke ba Kristu, bana oyo bazali kolόna bolingo, bana oyo bazali komipesa mpo na mikolo mikoyà ya malamu”.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.