ÐÓMAPµ¼º½

2025.07.16 Mgr Gabriel Dunia, Episkopo ya Auchi, na Nigeriya 2025.07.16 Mgr Gabriel Dunia, Episkopo ya Auchi, na Nigeriya 

Bakangi ba seminariste basato na Nigeriya, bato ba mobulu basengi lisiko na dioseze

Episkopo ya diosezi ya Auchi andimi ‘te boyokani elongo na miyibi miye bakotelaki to babundisaki likindo ya Ivhianokpodi poso moleki, esili ebandi. Etumba yango ebomaki mokengeli moko mpe esalaki ‘te bákanga baseminariste basato.

Bansàngo ya Vatikan

 

Poso moko nsima ya bokangami ya baseminariste basato na Ivhianokpodi na Ngele (Súdi) ya Nigeriya, diosezi ya Auchi endimaki ‘te, solo bakangi bango mpe basengaki mosolo mpo na kozongisa bango na nzoto kolungono mpe na bomoi.

Bana kelasi ya seminele, ya mibu, kobanda zomi na minei kino zomi na sambo (14 à 17 ans), bakangaki bango na butu ya mokolo mwa mosàlà minei, mwa zomi, ya sanza ya sambo (jeudi 10 juillet) na mpokwa, epai ya basàleli mandoki. Esalemaki na ntango bayaki kobundisa likindo ya moke ya Immaculée Conception na Ivhiaro, na diosezi ya Auchi, na Etukà ya Edo. Na bitumba enà, basilaki koboma Mokengeli moko ya kelasi, na nkombo ya Christopher Aweneghieme, oyo azalaki kosala na eteyelo eye, na esika ya kokengele bana-mboka.

Episkopo Dunia apesaki na bozindo, makambo manso malekaki, mingi mpenza na , oyo elimboli : «Lisungi na baeklezya ya katoliko ezali na minyoko». Bongo ndako ya bopanzinsango eye elobi ‘te babomi bazalaki bato ya etuluku ya Fulani, oyo baùtaki na nordi ya Nigeriya. Episkopo alobaki ‘te: «Bayaki baiké mpe bazalaki na makoki ya kokanga bango». «Toyebi soki moke te, eloko nini balingi, kasi tozali komona ‘te, likamb’oyo ya kobundisa mangomba ya bakristu mpe ba institution ya bango, ezali kokoba se kokoba». Sànzà mitano mileki, bakangaki na makasi mokambi ya Likindo ya moke mpe babomaki moko ya baseminariste.

Episkopo wa Auchi alobi 'te: na ekolo ya Nigeriya, «bobangi to somo, eleki makasi na esika ya liwà».
Episkopo wa Auchi alobi 'te: na ekolo ya Nigeriya, «bobangi to somo, eleki makasi na esika ya liwà».

Episkopo Dunia ayebisi AED ‘te baseminariste baye batikalaki, batindaki bango na bisika ya libateli, kuna epai bakosilisa mimekano mya bango ya nsuka mbula. Bayekoli basengeli kozonga te kino bakozwa mikano malamu ya bokengi makasi mpe lopango ya bokengi ekotyama zingazinga ya eteyelo

Mbela ya lisungi

Kati na lisoló na yé elongo na AED, episkopo alobaki ‘te lingomba esengaki lisungi epai na bakonzi ya Nigériya. «Tozali kosenga na mbulamatari ya bana mboka ‘te eya na esika eye», elobaki ye. Kasi, atako guvernema endimaki, kino sik’awa «tozali komona ata likambo moko te oyo esalemi na ngambo ya bango».

Episkopo ya Auchi asengaki na «bato banso, moto na moto, asunga bango: abondela mpo na bango, asala makasi, ezala : ya biloko, ya molimo to ya bomoto, oyo ekoki kosalisa biso na kopekisa bozangi bokengi». Abengaki mpe basàngo banso ya diosezi mpo na kosàla bamisa mpo na kopesa lokumu na makila ma motuya ma Yezu, ba kokamba bandimi na losambo lya Rozario-Mosantu mpe bapesa mabenisi (mapamboli) mpo na libateli lya Nzambe na Etukà ya Edo mpe na Nigeriya.

Likindo ya moke ya Immaculée Conception, ebandisamaki na 2006. Esili kopesa mateya na bilenge koleka nkàmà mitano (500 jeunes) mpo bakóma basàngo. Bongo ezali mpe tango inso, elembo ya elikya mpo na Lingomba ya Katolike ya mboka ena.

Bozalani pembeni ya Pàpa na Nigeriya

Kala mingi té Pàpa Léon XIV asambelaki (abondelaki) mpo na bato ya Nigeriya o mokolo mwa Eyenga, mwa zomi na mitano (15) ya sànzà ya Yuni. Tango mwa moke nsima ya liwa ya bato nkàmà mibale (200) oyo bakufati na mobulu esalemaki na etuka ya Benue. Na yango, Pàpa abondelaki mpo na «libateli, bosembo mpe boboto (kimya)» na Nigeria. Akanisi mingi mpenza na «bakristu ya bamboka ya etukà ya Benue, oyo bazali kokutana na mobulu mbala na mbala».

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

17 sánzá ya nsambo 2025, 14:39