ACEAC esengi na bandimi ba y¨¦, balembe te na ntina ya ba extr¨¦misme oyo bazali kolelisa bango
Albys KBD, CP ¨C Kinshasa/RDC
Ezali na kati ya likita ya Assemblée plénière ya Symposium ya masàngà ya baepiskopo ya Afrika mpe Madagascar (ACEAC) nde baepiskopo ya Afrika ya kati kati bakutanaki. Yoko liyebisi epesamaki na sima ya likita lina, elobi ¡®te, ba prélats bapesaki matondi na Nzambe «oyo azali kokoba kopesa biso makasi, lokola mobateli mpate, mpe azali kobondo bato ba ye na etuka ya bitima binene (Grands-Lacs) ». Basosoli ¡®te, «na tango eye ya mpasi mpe ya mikakatano, oyo ezali koleka na etuka oyo, Eklezia ebyangemi na kotatola, na nzela ya mabondeli mpe misala ya bokengi, mosala mwa ye ya bosakoli, mpo na kimya mpe bomoko ya bato».
Bozali pembeni na molimo na bandeko mpe mabota mazwami na likàmà
Baepiskopo ¡°bakweisi makasi mpenza, kobomama ya bakristu, na misala ya bituluku ya baye basimba mandoki, oyo esalemaki mokolo mwa lomingo mwa tukù mibale na sambo (27) ya sànzà ya yuli na tango ya losambo la mokolo mwa lomingo, na paloase ya Komanda, na dioseze ya Bunia na RD Congo¡±. Bazali kopesa bakondoleansi na bango na ¡°bato ya Komanda mpo na mpasi enà; mingi mpenza, na Mgr Fulgence Muteba, Mokambi ya lisanga ya baepiskopo ya RDCongo (CENCO), mpe na Mgr Dieudonné Uringi, Episkopo ya Bunia¡±. Balakisi ¡°bozali pembeni ya bango na molimo na bandeko, baninga mpe mabota ya baye bazwaki likàmࡱ.
Kobomama ya bato na Komanda, elakiseli moko ya lolenge bomoi ya bato ezali kokoma mpamba na etuka eye
Baepiskopo balobi ¡®te: Kobomama ya bato na Komanda, ¡°elakiseli moko ya lolenge bomoi ya bato ezali kokoma mpamba na etuka eye, ut¡¯o mibù tukù misato¡±. Na yango, ba prélats bayoki mawa elongo na ¡°baye banso bazwami na mpasi na pembeni to na mosika, na mbuma mabe ya mikakatano ndenge na ndenge¡±. Bongo babengi Bakristo banso ¡°balembe te na kopesa lisalisi na tango basangani ya mangomba ma biso bazwami na minyoko ya ndenge na ndenge¡±. Na yango, bandimaki kopesa elembi ya misala ya bolingo, mpo na baye bazali na mpasi, mingi mpenza na basi mpe bana¡±.
Kokólisa, na bosembo mpenza, boyokani na boboto kati na mangomba
Tango ba mangiripa ya mopelengano (politiki) ezali kopesa nzela na makanisi ya bato mpo ¡®te batyelana motema te, boko na basusu, nzokande baepiskopo bazali kolendisa bakristu banso ya etuka ya bitima binene ¡®te ¡°bálemba te na ntina ya extrémisme, na ezalela ya yango na mitindo minso, oyo ezali kosimba mpe kolelisa bato mpe mangomba ya bato¡±. Kutu, basengaki na bango ¡°bákolisa, na bosembo inso, boyokani ya boboto kati na bato, na bibongiseli mpe na baye bafandaka to basalaka na bituka biye¡±. Na yango, bamilengeli mpo na ¡°koyamba na bondimi mabongisi manso, maye makoki kopesa maboko mpo na kimya ya libela na etuka eye¡±, mpe bapesi toli na bato baye bazali na matata na ¡°kotya lisobo masolo mpo na bolamu ya bato¡±.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.