ÐÓMAPµ¼º½

Luka

2025.07.21  Baepiskopo ya mabele ma Afrika, na likita o mboka Accra na ekolo ya Ghana na s¨¤nz¨¤ ya Febwali ya mob¨´ moye 2025 2025.07.21 Baepiskopo ya mabele ma Afrika, na likita o mboka Accra na ekolo ya Ghana na s¨¤nz¨¤ ya Febwali ya mob¨´ moye 2025  

Episkopo wa lok¨´mu: ?Tosengeli kozala solo babateli bwa elikya mpo ya Afrika?

Na Kigali, ba episkopi ba Afrika balingi ¡°kotya likanisi moko mpo na lobi (avenire) ya Eklezia na mabele ma Afrika. Balingi mpe kosala nzela ya elikya, ya boboto mpe ya boyokani mpo na Afrika na biso oyo ezali na minyoko¡±, elobaki Episkopo Fridolin Ambongo, mokambi ya Symposium ya ba episkopo ya Afrika mpe Madagascar (SCEAM). Alobaki na Vatikan News, liboso ya likita lya mbala ya tuku mibale (20) ya SCEAM, oyo ekosalema na mokolo mwa 30 yuli kino mokolo mwa 4 ya Augusti na Rwanda.

Albys KBD, CP ¨C Kinshasa

 

Likita monene ya mbala ya tùku mibale (20) ya baepiskopo ya Afrika ekosalema na mikolo mikoyà na Kigali, na Rwanda. Bokutani bwa bato banso ya mabele ya Afrika, oyo ekambami na episkopo walokùmu ya Kinshasa na RDC, Fridolin Ambongo. Azali mpe lokola, mokambi ya SCEAM. Likita liye, ekoyamba bato nkàmà mibale na tùku mitano(250), oyo bawuti na bikolo 54 ya Afrika mpe bisanga na byango, mpe bapaya ya mikili misusu.  Likita oyo esalemaka kaka mbala moko na sima ya bambula misato, ekokani na likanisi monene ya mobù moye mwa Zubile : «Kristu, liziba lya elikya, ya kozongisa boyokani mpe ya boboto». Mpo na episkopo wa lokùmu ya Congo, ezali na «mposa makasi ya kimya (boboto), ya kozongisa boyokani, ya bosembo mpe ya bolamu mpo na bato ba Afrika». «Lelomei, mopelengano (politiki) ya bitando biyiké bya Afrika bizali kokutana na mobulu mpe bozangi libateli. ezali komonisama na bitumba ya kowelana bokonzi, matata, terorisme, mpe mobulu, ezali koboma bankoto ya bato mpe ezali kotinda bato basusu bákima bisika na bango ya kofanda na bisika ya mpasi to minyoko makasi».

Ambongo apesi ndakisa «likambo ya mawa ya terrorisme na Sahel, ya bitumba na ngambo ya moniele ya ekolo ya Republiki demokratiki ya Congo, mpe bozangi koyokana kati na ekolo ya Soudan nà Soudan ya Ngele (Sudi)»

Lisolo elongo nà episkopo wa lokùmu Ambongo,Mokambi ya SCEAM

Kozala bakengeli (bateli) mpata mya Elikya

Makambo maye, mazali kokotisa Afrika o kati ya ¡°bualé ya bomoto etali bato banso¡±. Na yango, baepiskopo ya Afrika balingi ¡°kopesa ntina ya kozala na elikya epai na bato oyo bazali konyokwama mpe bazali na likámá ya kobungisammp onana kozanga elikya¡±. ¡°Mpo na biso kozala babateli bampate  ya Afrika o eleko ya lelo, elingi koloba kozala nzeneneke ya elikya, ya kozongisa boyokani, ya kimya (boboto) mpe ya bokóli mpo na bato oyo bazali konyokwama¡± elobaki mokambi ya SCEAM. Episkopo wa lokùmu azali na elikia ¡®te, na litambwisi lya Elimo Mosantu, bakokoka kokoma emoneli (vision) moko oyo ekoùmela makasi, oyo ekotambwisa mosala mwa bango ya bobateli  to bokengeli mpate o kati ya Eklezia mpe ya masanga lya bato ya Afrika. ¡°Na yango, baepiskopo ya Afrika balingi kosala makasi mpo ya komema oyo wa yé eteni, mpo na kolonga mikakatano etali makambo ya socio-politique oyo mabele na biso ezali kokutana na yango¡±, elobaki ye.

Makambo ya Milende zomi na mibale (12piliers) mpo na babateli mpate

Likita ya masangà ya ba episkopo ya Afrika mpe ya Madagascar (SCEAM) ekosala Assemblée na yango na Kigali mpo na kokabolana makanisi, mpe kozwa mokano mpo na lobi ya Eklezia na mabele ma Afrika. Ekotala ndenge makambo ezali kotambola banda likita lya Acra na mobù 2022 mpe ekomonisa makanisi ma yango mpo na etamboli ya eklezya na mibù 2025 kino 2050, oyo etalisami na makambo ya molende zomi na mibale, na ndakisa kosakola Nsango Elamu, bilenge, libota, makambo etali zamba, mai mpe mompepe, mpe makambo ya numerike. Baepiskopo bakotalela mpe makambo misusu ya lingomba, lokola bobateli mpata, na ndakisa ya kobala basi ebele, mpe makambo etali boyangeli, bosembo, kimya, boyokani kati na mangomba, mpe klima,kobatela ezingelo.

Mpo ya SCEAM

Likita monene ya SCEAM ezali likita eleki monene ya Lingomba ya Katolike na Afrika mpe na bisanga bya yango. Ebongisamaka nsima ya mibù misato inso mpe esangisaka ebele ya baepiskopo wa lokùmu, baepiskopo -mokonzi, baepiskopo, banganga-Nzambe, basángó mpe mamelo, mpe bandimi balaiki ya mangomba ya mokili mobimba mpe ya mikili misusu.

Ebandisamaki na mobù 1969 na mobembo ya Pape Paul VI na Afrika. SCEAM ezali etongelo ya lingomba ya Katoliko na Afrika mpe na Madagascar. Etindà mwa yango ezali ya kokolisa bondeko, ya kotombola Nsango Elamu, mpe ya kozala mongongo mwa lingomba na makambo ya bizaleli malamu mpe ya molimo na mokili mobimba mpe na bisanga bya yango. Biteni bya yango bya motuya ezali Commission Evangélisation, Commission Justice, Paix et Développement (JPDC) mpe Departema ya Communication sociale. Epai mosusus, SCEAM ezali na biro ya boyokani elongo na Union africaine, oyo ezwami na Addis Abeba, mpo na kosunga lingomba na kosala mibeko mpe kosunga bato na Afrika mobimba.

SCEAM esàlemi na bibongiseli mwambe ya motuya ya bitando ya bamboka: ACEAC na Afrique centrale, ACERAC na Afrique centrale, AHCE na Égypte, AMECEA na Afrique de l¡¯Est), CEDOI na Océan Indien, CERNA na Afrique ya Nord), IMBISA na Afrique ya Sud), RECOWA-CERAO (Afrique ya l¡¯Ouest).

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

22 s¨¢nz¨¢ ya nsambo 2025, 09:31