Banda sik'awa, Floribert Bwana Chui, azali Mwa-Esengo
Albys KBD CP – Kinshasa/RDC
Floribert Bwana Chui, azali banda sik’awa, Mwa-Esengo! Balubolaki yé na molulu mwa Misa na bazilike Santu-Polo-Libanda-ya-Bidelo. Misa mokambamaki na episkopo wa lokùmu Marcello Semeraro. Bongo basanganaki na Misa mana, episkopo wa lokùmu ya kinshasa, Fridolin Ambongo, Episkopo ya Goma, Mgr Willy Ngumbi, na mpe ba episkopo balokùmu, baepiskopo mpe basango oyo bautaki na Congo, na Roma mpe na bisika bisusu. Basangani mingi ya lingomba, kati na bango bakongomani, ba-Italie, basangani ya Sant’Egidio mpe batindami ya mbulamatari ya Congo, bayaki na molulu yango na esengo nyonso.
Molulu mwa Boluboli
Molulu ya kokomisa ye Mwa-Esengo ebandaki nsima ya bolimbisi. Episkɔ́pɔ ya diosezi ya Goma, Mgr Willy Ngumbi, mpe postulateur ya likambo lya kokomisa mwa-esengo yango, sango Francesco Tedeschi ya lingomba Sant’Egidio, basengaki ete Floribert Bwana Chui Bin Kositi akóma mosantu. Na nsima ya botangi lisolo lya bomoi bwa ye (sa biographie) mpe ya mokanda ya Papa Léon XIV na episkopo wa lokumu Semeraro, elilingi ya mosantu ya sika emonisamaki na maboko ya bandimi oyo bazalaki na esengo, bazalaki kotombola ba bendele ya Congo mpe bilembo ya lingomba Sant’Egidio mpe ya OCC, lingomba epai wapi Floribert azalaki kosala.
Floribert Bwana Chui abomamaki mpo aboyaki kozwa kanyaka ntango azalaki kosala mosala na yé, akangaki biloko ebebà (loso) oyo ebongaki te mpo na kolya. Nsima ya kofungola foto (elilingi) na ye, relique ya Floribert Bwana Chui, elamba oyo alataki mokolo ya bomartiro bwa ye, etyamaki liboso ya lotale. Ekembisamaki na fololo mpe ezingamaki na miinda ya kandela(buji). Na nsuka, episkopo ya Goma, postulateur, mama ya Floribert, Gertrude Kamara Ntawiha mpe mokambi ya Sant’Egidio, Marco Impagliazzo, bapesaki maloba ma botondi na Tata-Mosantu, oyo episkopo wa lokumu Semeraro azwaki esika na milulu, mpo na kosakola nkombo ya Mwa-Esengo mwa sika. Bayangani banso bamonisaki esengo ya bango na kobete maboko mpe konganga makasi nà milolo - mingongo ya esengo ya RD Congo.
Mpiko ekoùta na bokasi bwa boyambi na Nzambe.
Elambo ekobaki na lokota ya Italien, kasi nzembo ya Gloria eyembamaki na lokota ya Lingala na lisalisi ya Chorale Congolaise ya Roma. Na lisukulu la ye, episkopo wa lokùmu Semeraro atángaki maloba ma ntoma Polo ona ba-Roma (Rm 5;5) mpe na amonisaki ete elikya oyo eùtaka na bolingo bwa Nzambe etindaka biso tozala banzeneneke ba boyambi lokola Floribert Bwana Chui. Maloba maye prelat alobaki, ekokani na maloba ya Pápa Léon XIV alobaki na Bazilike Santu-Polo-Libanda-Ya-Bifelo (Saint-Paul-Hors-les-Murs) na mokolo ya tùkù mibale (20) ya sànzà ya mitano. Andimaki ete “kopesa lokumu na Floribert Bwana Chui, ezali eloko ya yambo asali na mosala mwa yé ya Pàpa. Bongo, akumisaki ndakisa ya boyambi bwa Floribert, oyo ekokani nà oyo ya Santu Polo mpe ya bato basusu oyo bakufaki mpo na kondima na bango na nzambe wa bosembo, elobaki Semeraro.
Bolingo bwa nzambe ezalaki kotambwisa bomoi bwa Floribert Bwana Chui
Na libakù ya eyenga ya Bosato Bosantu, episkopo wa lokùmu Marcello Semeraro atangaki maloba ma Benoît XVI na ntina ya bolingo ya Bosato lokola moboko ya bomoko. Ezali na lolenge wana nde alimbolaki litatoli lya Floribert Bwana Chui, laike ya Goma, moko ya lingomba Sant’Egidio, moto ya mokili oyo akangamaki makasi na kondima. Bolingo ya Floribert mpo na Nzambe etindaki ye akóma kotalela bomoi bwa ye lokola boussole oyo ezalaki kotambwisa bomoi bwa ye (kolakisa ye nzela). Na libakù moko na moko ya bomoi bwa yé, Nzambe azalaki nzela ya yé. Biblia na yé ebombami na Roma, na kati ya sanctuaire ya bamartiro ezwami na esanga San Bartolomeo, epesi ndakisa ya moto oyo azalaki kotanga mingi, to mbala na mbala.
Losambo, babola, boboto(kimya): milongo misato ya elimo ya Sant’Egidio
Episkopo wa lokùmu Semeraro alobaki ‘te elimo ya Floribert Bwana Chui ekokani na oyo ya Sant’Egidio: kobondela, kosalisa babola mpe koluka kimya(boboto). Kolendisama na koyoka Liloba lya Nzambe, Floribert amipesaki na Goma epai ya babola, mingimingi na bana ya balabala, kopesa bango elikya mpe avenire (mikolo mikoya) na nzela ya Eteyelo ya Kimya.
Banso bazali na lotomo ya kozala na Kimya
Episkopo wa lokùmu Semeraro azongelaki kolobela mposa makakasi ya Kimya ya Floribert Bwana Chui. Azalaki kotoba ‘te: “moto nyonso azali na lotomo ya kozala na kimya o ntei ya motema mwa yé”. Maloba ma motuya mpo na eleko ya matata mpe bitumba oyo bato banso bazali koluka kimya, mingi mpenza na ekolo ya RD Congo mpe bisika bisusu. Boluboli ya Mwa-Esengo Floribert Bwana Chui esalemaki na Roma mpo ya likambo lya bozangi bokengi na mboka Goma. Mpamba te, engumba oyo ya ngambo ya moniele ya RDCongo ezali na maboko ya ba AFC-M23. Molulu moye ekokisi na molimo mposa ya Floribert ya kokende mobembo na Roma. Na mosala mwa yé nà bilenge, amipesaki mp ona bomoko mpe kimya na mboka na yé. Azalaki na ndoto ya komona bato banso ya ekolo ya RDCongo, basangana liboà moko. Na yango, episkopo wa lokùmu asengaki na basangani ya milùlù mina bamema ndoto ena na losambo la bango.
Mokano mwa nsuka ya Floribert Bwana Chui
Episkopo wa lokùmu Semeraro amekaki kokokanisa lotale ya losambo nà mesa oyo ezali koleisa mpe kosantisa. Ezali ndaki Floribert apesaki na koboya kokomisa bosoto mesa oyo, nakoboya kolekisa bilei ebebà. Liboso ya likambo ya kanyaka, azwaki mokano ya makasi: “kozala na bomoi mp ona Kristu, na esika ya kolanda nzela ya mabé; kondima kokufa, na esika ya kotiya bomoi ya bato basusu na likàmà”. Ekateli enà, ezwaki likanisi na Ukaristia mpe liloba lya Nzambe. Ezali mpe komonisa oyo Dietrich Bonhoeffer abéngaki "ngrasya oyo ezali na motuya monene". Pápa François yemei akumisaki Floribert lokola ndakisa mpo na bilenge, mpo na bosembo bwa yé mpe mpo aboyaki kolanda "makambo ya potopoto mabe".
Ndakisa ya Floribert Bwana Chui esunga biso na koboya mabé
Engebene Semeraro, Floribert Bwana Chui asosolaki ‘te bomoi bwa yé mpe ya bato ba yé, ezali na motuya koleka mbongo. Lokola atikalaki semba tee liwa lya yé, azali lelo nzeneneke mpe molakisi, mingimingi mpo na bilenge ya Afrika, azali kolendisa bango bálonga mabe na nzela ya malamu. Azali ndakisa ya elikya mpo na bato banso, azali kolendisa biso, tóboya kobanga mpe mposa ya kozwa mbongo. Kardinale asukisaki na kobondela mpo ‘te na bolobeli bwa Floribert, bilenge mpe bandimi ya Congo, mingimingi ya Goma, bázwa makasi ya kolanda kosala bolamu. Abondelaki mpe mpo ete Lingomba ya Sant’Egidio ekoba komipesa na losambo, na kosalisa babola mpe na kolendisa kimya.
Liboso ete milulu esila, Cardinal Ambongo apesaki maloba ma matondi na nkombo ya Eklezia ya Congo. Alakaki ‘te, akoluka bato ya kozala mpata ya kolendisa mpo na kobundisa kanyaka na RDCongo. Andrea Ricardi, mobandisi ya Sant’Egidio, apesaki mpe matondi na nkombo ya lisanga, mpe alobaki ete elenge oyo akomi Mwa-Esengo, akomi nzeneneke, mwina, mpe motambwisi mpo na mikóló mpe bilenge, mpo na bato ya Congo mpe mpo na basangani ya Sant’Egidio.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.