MAP

Bilenge bazali kati na losambo, liboso ya Cour suprême ya bikolo ya États-Unis. Bilenge bazali kati na losambo, liboso ya Cour suprême ya bikolo ya États-Unis.  (2020 Getty Images)

États-Unis : Eklezya ebyangi na kokolisa bonsomi ya losambo.

Lisànga lya baepiskopo ya Amerika ezali kosepela poso ya bonsomi ya losambo. Eyenga enà ekoùmela (ekokoba) kino o mokolo mwa tukù mibale na libwà (29) ya sànzà yuni. Mgr Thomas Paprocki, episkòpo ya diosezi ya Springfield, abyangi bato na «kobondela, kokanisa mpe kosala» na ntina ya likambo liye, «mpo na kozala banzeneneke bya elikya».

Albys KBD CP – Kinshasa/RDC

 

Na libakù lya Eyenga ya bonsomi ya losambo oyo ezali kosalema na États-Unis, baepiskopo ya États-Unis balendisi bakristu ba bango na «kokolisa lotomo la moboko ya bonsomi ya losambo mpo na Bakatolike mpe bato ya ba eyamba (mangomba) banso» . Poso moye mobandaki o mokolo mwa tùkù mibale na mibale (22) ya sànzà ya yuni, eyenga ya Santu John Fisher nà Thomas, ekosuka na eyenga (feti) ya basantu Petro mpe Polo o mokolo mwa tukù mibale na libwà (29) ya sànzà ya yuni oyo ekoyà, na likanisi lizwaki linsangà ya baepiskopo ya lingomba ya Katoliko na États-Unis ya Amerika.

«Nzeneneke ya elikya»

Mama na likambo (mòtò ya likambo) ya mobu moye, « Banzeneneke to batatoli bwa elikya», euti na lapolo ya mbula ya 2025 ya lisanga ya ba episkopo ya Amerika, mpo na oyo etali bonsomi ya losambo na Etats-Unis, oyo ezali kolobela «mpasi ya bokabwani ya mopelengano (politiki)» na likambo lina.

Elobeli mpe makambo lokola mibeko oyo endimi kosalela mayele babengi « fécondation in vitro : to mibeko oyo ezali kopesa nzela na kokotisa zemi na kati ya nzoto na nzela ya ba vitre », mikakatano ya misala ya Lingomba ya Katolike mpo na kosalisa baluki-mboka mopaya, mpe ekateli baboti bakoki kopona mpo ya koobokolo bana ba bango. Likanisi liye ekokani mpe na oyo ya mobù moye mwa zubilé ya elikya Pápa Franswa asakolaki, elimbolaki Mgr Thomas Paprocki, episkòpo ya dioszi ya Springfield, na etúká ya Illinois, oyo abimisaki yambo, likanisi ya molulu moye babengaki «Quinzaine de la liberte» - bongo sima ebongwanaki na «Poso ya bonsomi ya losambo».

Etats-Unis: Mgr Broglio abyangi na koyokela mawa mpe koyamba  ba luki-mboka mpaya .
Etats-Unis: Mgr Broglio abyangi na koyokela mawa mpe koyamba ba luki-mboka mpaya .

Kobondela, kokanisa mpe kosala

Mgr Paprocki azwaki likanisi na mokanda mwa santu Polo ona ba-Roma, epai wapi elobi te “elikya ekokosa soki moke te”, asakolaki na ba medias ya Vatikan ‘te : «elikya ekotinda biso kotiya motema na avenir mpe na elekà lya nzambe na maye matali bomoi bwa seko ».Episkopo a limboli ‘te, likanisi linà ezali mbela mpo na bakatolike bapesa ndimbola na bonsomi bwa losambo mpe mpo ya kosambela na ntina ya bokengeli bwa yango na mboka Etats-Unies mpe mokili mobimba. Ezali mpe mbela na mosala mpo na kobatela lotomo lonà. Yango wana bolendisi na “bobondela (to kosambela), kokanisa mpe kosala mpo ‘te tozala banzeneneke ya elikya na likambo yango”.

Bonsomi mpe bosolo

Mgr Thomas Paprocki alobaki lisusu ‘te bonsomi bwa losambo esengeli eyebana na nzela ya mateya ma eklezya mpo ya bonsomi. Na kolobela mateya ma Santu Polo, episkopo alobi ‘te bonsomi ya solo ekangami na bosolo, mpe esengeli kosala bokeseni na mokoki maye tolingi kosala. “Eklezya eteyi biso ‘te: bonsomi ezali mpo na kotika biso tozala na bonsomi ya kosalela boyambi bwa biso, koluka bosolo, mpe kolika koloba bosolo”. “Lotomo ekeseni na masengami”, kaka na eklezya mpamba te, kasi mpe ata ozali civile.

Nakosukisa, alimboli malamu ‘te : «etali kaka bonsomi bwa biso te mpe ya lotomo la biso, kasi tozali na mokumba ya kozala bayimboka malamu, kosalisa na bokolisi bwa bolamu y abato banso, ya mboka na biso mpe ya kobatela bonsomi».

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

25 sánzá ya motóbá 2025, 20:35