Bitumba kati na Isra?l na Iran: ¡°Tobondela mpo na bozongisami ya masolo¡±
Albys KBD CP ¨C Kinshasa
O mokolo mwa lelo, nazali komona bato oyo bazwi likama: bato oyo bakimi na bisika bafandaka, bato bazoki, mpe baye bakufi. ¡°Na bikólo biye binso mibale, ebele ya basivili bakufaki, atako basali yang ona nko to te¡±. Ezali bongo kati na mboka-mokonzi ya Iran, epai wapi bazali kobwaka babombi mingi mpe ezali na mikakatano mingi. Etatoli bongo episkopo wa lokùmu Dominique Joseph Mathieu, episkoopo-mokonzi ya ba Latins ya Tehran-Ispahan.
Emonani lokola likambo ya sika te
Na motema mawa, episkopo wa lokùmu ayebisi na bapanzi sango ya Vatican ¡®te na quartier 11 ya engumba epai wapi afandi, emonani lokola likambo ¡®te manso mazali kozonga na molongo o mokolo mwa misato, mwa 18 sànzà ya yuni, mokolo mwa motobà ya bitumba oyo elandanaki. Sambelani mpo na bitumba kati na Israël-Iran: «tosenga na losambo bozongi bwa boyokani»
Internet ezongi kala mingi te, moi ezali kongenga, bandeke bazali koyemba mpe molunge ezali kitoko, elobi yé. Kasi, abakisi ¡®te: ¡°Ezali kaka lolenge ezali komonana na miso¡±. Mpamba te na butu, ¡°mobundeli ya mpepo ezalaka makasi koleka¡±. Mpe na nsuka, abakisi ¡®te ¡°oyo nyonso ezali kokitisa motema mpo awa ezali na bisika ya kobatama te mpo na komibomba. Basirene mpe ezali te mpo na kokebisa bato liboso na likama ya bamisile¡±.
Matata mozangi ndelo
Episkopo wa lokùmu Mathieu alimboli lisusu ¡®te ezali etumba oyo ezali na monguna te. Ezali na ndelo moko te oyo bakoki kosangana, yango wana makambo manso mazali koleka na kati ya mapata na mpepo epai bamisile mpe ba drones ezali kobunda. Elingi koloba ¡®te bitumba ya kokokana te, mpamba te, epai mapata ya mpepo ya bikolo bisusu ezali kobebisama mbala na mbala¡±
Na nsima, abakisi makambo ya ntina mingi mpo na bato ya mboka. Alobi ¡®te ¡°batikalaki kaka na bisika oyo ebebaki, nzokande bato basusu bakendaki koluka libateli na bisika ya kimya na kati ya ekólo¡±. Lisusu, episkopo-Mokonzi alobi ¡®te, ¡°na ngonga eye, ba ambassades misusu bazali kozela kino suka ya poso oyo, yambo ¡®te ba talela likambo ya kokima mpo na libela¡±.
Makila masopami mpamba
Episkopo-Mokonzi ya Teheran alobeli lisusu lolenge ya etumba ezali kosalema mikolo mya lelo, engebene na yè, ezali na ntina moko te: ¡°Ezali na eyano te¡±, alobi yango nà kondima nyonso. ¡°Ekoki kozala malamu ¡®te bangambo nyonso mibale bazonga na mesa ya masolo; na yango, tozali komipesa makasi na mabondeli.
O mikolo miye, namoni ¡®te bato bayiké balakisi bozalani pene na ngai. Natondi bino banso botondi na motema na ngai mobimba. Tozali kobondela mpo na bino, bobondelaka mpo na biso. Tozala bomoko na Kristu oyo abikisaki mokili na makila ma yé oyo esopamaki. Nalingi kokanisa bino mokanda ona ba Efese, oyo elobi ¡®te: ¡°Yesu asalaki bato mibale libota moko¡± abuki bifelo ya bokabwani oyo ezalaki kokabola bango, elingi koloba, koyinana kati na biso¡±.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.