Bana ya Congo bapesi matondi mpo na boluboli bwa Mwa-Esengo Floribert Bwana Chui
Albys KBD CP – Kinshasa/RDC
Mokolo mwa zomi na mitano (15) ya sànzà ya yuni etikali mokolo ya kobosana te. «Mwinda mongali o likolo lya molili mwa ekolo ya biso RDCongo», elobaki episkopo ya Goma, diosezi epai wapi Mwa-Esengo ya sika Floribert Bwana Chui aùtaki. Na mateya ma yé, Mgr Willy Ngumbi alobaki ‘te: boluboli bonà bozali ndemo mpe elembo ya elikya mpo ya bakongolais. Akumisaki mpiko ya elenge mobali oyo ya bambula tuku mibale na motoba (26 ans) aboyaki kanyaka, mpe akangaki boleki bwa bilei ebebà na mindelo ya ekolo ya Rwanda nà Congo. « Akokaki bondima, mutu moko té akokaki koyeba, mpe alingaki akoma na nkita », bo elobaki Pàpa Franswa, kasi bosembo bwa yé mpe ezalela malamu ya yé elekaki makasi, nde aboyaki kotiya bomoi ya bato ebele na likama. Bakangaki ye, bayokisaki yé buale mpe sima babomaki yé.
Makambo ya liwa ya Bwana Chui na 2007 ekokani na makambo mingi oyo ezali kosalema lelomei na RD Congo, episkopo alobaki. Kanyaka, koyiba mbongo ya Leta, bozangi bosembo mpe bisaleli bisusu ya ndenge wana ezali kopesa ba congolais bapasi mingi, alobi na mawa nyonso, mpe alakisi mwa-esengo ya sika lokola ndakisa ya kolanda mpo na kolongwa na mabe wana.
Bobenisi ya elili ya Mwa-Esengo Floribert Bwana Chui mpo na ndako-Nzambe bapesaki na Bacongolais na Roma.
Sima ya mateya ya Mgr Ngumbi, sango Roger Tshimanga omonié ya ndako-Nzambe bapesaki na Bacongolais na Roma, asengaki bobenisi ya elilingi ya Mwa-Esengo ya sika, Mwa-Esengo Floribert Bwana Chui, oyo bakotiya yango na eklezya ya mbotama, esika avandaka, na kati kati ya mboka-mokonzi ya Italie. Na sima milulu ekobaki nzokandé korali ya omoneri eyembaki na Misa mana. Elongo na Mgr Faustin Ngumbi, basanganaki baepiskopo ya kala ya diosezi ya Goma, ezali bongo Mgr Faustin Ngabu mpe Mgr Théophile Kaboy. Episkopo ya Kasongo, Mgr Placide Lubamba nà oyo ya Uvira, Mgr Sébastien Muyengo, basanganaki mpe na Misa mana. Babosani te Mgr Donatien Nshole, secretaire generale ya lisanga ya baepiskopo ya Congo (Cenco) kati ya banganga-Nzambe ya Congo mpe ya bikolo bisusu ya Afrika bayaki. Na libota ya Mwa-Esengo ya sika, ezalaki maman abota yé, Gertrude Kamara Ntawiha, nà bandeko ba yé ya mibali mibale, Jean-Claude mpe Trésor Kositi. Batindami ya lingomba Sant’Egidio mpe bazalaki elongo na Misa.
Bakoki kokomisa Mwa-Esengo Floribert Bwana Chui, Mokambi ya bato bamosala ya ekolo ya Congo.
Sima ya Misa, sango Roger Tshimanga apesaki maloba ya botondi mp ona boluboli bwa Mwa-Esengo ya sika Floribert Bwana Chui Bin Kositi. Alingi amona ‘te bakomisi yé mokambi ya bato bamosala ya ekolo ya Congo mpo na libongi lya motuya alàkisi. Omoneri epesaki mpe libota lya ye matondi nà mpe lingomba Sant’Egidio mpe baye banso basalisaki bosalemi ya milùlù mina ya boluboli Mwa-Esengo. Yambo ya kosukisa mpe kopesa bobenisi bwa nsuka, Mgr Willy Ngumbi apesaki matondi na nkombo ya diosezi ya Goma mobimba. Misia elandisamaki na eyenga epai wapi bakabolaki mwa kopo ya bondeko.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.