MAP

2019.06.12 Ekeko ya Sango-Mokonzi ya mboka Ars na mikili ya France 2019.06.12 Ekeko ya Sango-Mokonzi ya mboka Ars na mikili ya France  

Mibù nkàmà moko ( 100 ans) mwa boluboli bwa Sango-Mokonzi ya Ars, yoko mobundi mpo ya Ngolu.

Poso moye mwa 31 ya sanza ya mitano, ekokisi bongo mibù nkàmà moko oyo Pàpa PieXI alubolaki Santu Jean-Marie Vianney. Akomi elembo mpe ndakisa mpo ya banganga-Nzambe o mokili mobimba. Sango Mokonzi oyo ya molende, amipesaki yé mobimba mpo ya bato ba yé, nà mokano sé moko ya “kolongisa milimo na Nzambe”. Elobi bongo Sango Rémi Griveaux, recteur ya sika ya sanctuaire ya Ars na mboka France.

Albys KBD CP – Kinshasa/RDC

 

«Elongi eye ekondà mpo ya kolala nzala, kasi ekolakisa malamu innocence mpe bosantu bwa motema mwa botaù mpe boboto makasi». Ndé bongo Pàpa Pie XI azalaki kolobela nà esengo nyonso Sango mokonzi mwa Ars na mateya ma yé mwa 31 ya sanza ya mitano ya 1925, na libakù lya boluboli bwa santu Jean-Marie Vianney. Sima ya mibù minei, na 1929, kaka yé mei Pàpa Pie XI atangaki ye « mosantu-ndoyi ya Basango-bakonzi banso ya mokili mobimba».

Sima ya mibù nkàmà moko (100 ans), mobù na mobù, bandimi pene ya 300 000 bayàka na bazilike ya Ars ; mboka eye ezali na nordi ya Lyon na bato 1500. « Bomoyi bwa sango-Mokonzi ya Ars mobimba, asalaki mpo ya kolongisa milimo mpo ya Nzambe ». Etindà ena ekokoba kino moyi mwa lelo.

Akomi ndakisa ya mokambi ntùbela.

Nzokandé, tango akomaki na mboka Ars, ya kosala ezalaki mingi. Abandaki na kokende kokutana na bato, kotala ba fermes mpe ba ndako ya bato ya mboka. Ndé sima abandi kokende na ba mboka ya nzinga-nzinga mpo na kosalisa ntubela na bakristu. “Akomisaki yango makasi mpamba te, bo momeseno esengelaki ‘te bakristu na paloase batùbela epai ya sango-mokonzi wa bango”, elobi lisusu sango Griveaux.

Sanctuaire ya mboka Ars na mikili ya France
Sanctuaire ya mboka Ars na mikili ya France   (Sanctuaire d'Ars)

Alandaki ba nzela mpe makanisi ya ba Jansénistes to ba rigoristes te, kasi alandaki oyo ya santu Alphonse ya Liguori. Balubolaki yé na 1839, na tango ya mosala mwa ye. “Likanisi ezalaki boye: kokundola naino na esika moko, mposa ya kobongwana; bongo kosalela mposa ena lokola singa ya Ariani mpo na kopesa nsima ngolu mpe bolimbisi bwa Nzambe”

Malembe malembe na boùmeli ya mibù tuku minei na moko (41 ans) ya mosala ya bokengeli mpata, ya ntubela, ezalaki kozwa esika na bomoyi bwa sango- mokonzi ya Ars. Na suka ya bomoi bwa yé, na mbula moko, asalisaki ntubela na bato pene ya nkoto tukù mwambé (80 000 personnes). Engebene na bato basusu, balobi ‘te akokaki kokoma na batu monkoko (milion) na mbula moko ya ntubela oyo ayokaki. Alembaki te na kobenda bakristu banzongela Nzambe na sakramentu eye. “Mpo ya kopusa bato bayà ntubela, azalaki koloba bo momeseno: soki kaka na kokaki kotubela na esika na bango”, elobi recteur ya sanctuaire.

Na kati-kati ya gbagba mpe mayi, ezali nà ngolu ya Nzambe

Moko ma maloba ma yé oyo eyebana makasi, elakisi wa yé boyambi etengatenga tè na ngolu ya Nzambe. Na koyanola yoko mwasi azalaki na bobangi ‘te wa yé mobali amibomaki, akende na lifelo, Sango-Mokonzi ya Ars alobi: «na kati-kati ya gbagba mpe mayi, ezali nà ngolu ya Nzambe».

“Likanisi liyé makasi ya kobenda milimo mpo ya Nzambe”, ezalaki kotungisa yé mingi. «Zabolo azalaki kopima yé kolala, kotiyela ye mikumba ndenge na ndenge oyo akoki komeme te; noki mpenza baninga ba yé bafundaki yé, bafingi yé, badindisi yé na poto-poto». Ezali mosika na elembo oyo Sango-Mokonzi akokaki kozala na yango, ekobi koloba sango Rémi Griveaux. Kùtù azalaki na boboto te nà bato bapaloase ba yé, azalaki koteya nà mpiko, mpamba te azalaki kobanga ‘te, lifelo mobimba ekanga ezibelo (ekuké) na «libondisi kitoko ya kolinga Nzambe mpe ya kolingama na yé».

Sango Rémis Griveaux, Mokambi ya Sanctuaire ya mboka Ars, na mikili ya France
Sango Rémis Griveaux, Mokambi ya Sanctuaire ya mboka Ars, na mikili ya France   (Sanctuaire d'Ars)

Na mboka Lourdes, bato ba mobembo bakoluka libateli na maboko ya mama moko, kasi na mboka Ars, bato bayei koluka yoko tata. Bazalaki kolanda elembo ya «Sàngo wa Ngolu, oyo akolakisa ngolu ya Tata, bolamu bwa yoko Tata». Esika ena etondisami na Ngrasya : «bato ba mobembo boko bakoluka Ngolu, basusu basili bazwami na yango”. Ezali bongo lolenge sàngo oyo aùtaki diosezi ya Paris azalaki kosakana na maloba. Abetaki lisolo ya moto oyo amonaki panneau y’Ars na nzela, bongo atelemi mpe atubeli, azali moto ya yambo ut’o mibù tùkù misato.

Yoko lotiliki

Kasi yambo mpenza, ezali na lkabo lya bomipesi bwa ye mei lokola mokengeli mpata, amipesaki na bato ba yé. Kutu Pàpa Jean Paul II alobaka yango na buku ya bolendisi akomaka: Pastores dabo vobis, ‘te Sango-Mokonzi ya Ars akosimba mitema mya bato, kino moyi mwa lelo (kino lelo)

Basàngo bayiké bayaka na mboka Ars mpo ya kotoka na liziba ya lotiliki oyo ezali yé. “Tokomono Basàngo bakoùta bipai na bipai. Esengeli kosambela mpo ya bango”, elobi sàngo Griveaux oyo azali kolengele ezuzulu moko mpo ya basàngo na eleko ya elanga, na mikili ya France. Lokola nganga-Nzambe, ezali na mwa tango tokokisaka mibù tùkù mitano (50 ans); ngai nazali na yango tùkù motoba koleka (60 ans), bongo tokoloba: ekoki boye, na mipesi mibù ntùkù mibale na mitano (25 ans), na pema mwa moke. Kasi Sàngo-Mokonzi ya Ars, atikalà kopema soki moke te, azalaki lotiliki, bazalaki kokoka kokanga yé te.

“Lokola nganga-Nzambe, ezali na mwa tango tokokisaka mibù tùkù mitano (50 ans); ngai nazali na yango tùkù motoba koleka (60 ans), bongo tokoloba: ekoki boye, na mipesi mibù ntùkù mibale na mitano (25 ans), na pema mwa moke.”

Nzokandé azalaki kolya moke kaka, azalaki kosambela mingi mpe kolala nzala. Sàngo-Mokonzi ya Ars azalaki kotoka makasi mwa yé na Ngrasya ya Nzambe oyo bayambi mpe oyo azwi makoki ya koyamba. Ba nganga-Nzambe ya motindo eye, bazali «likabo Nzambe akopesa, mpo ya kolakisa biso makamwisi minene na nzela ya biloko mike, ngolu ya Nzambe, ezalela ya mokengeli mpata». Esukisaki bongo Sàngo Griveaux.

Zubilé eye sanctuaire ya Ars ezali kosepela, ekokende kino na eyenga ya Bansantu Banso (Toussaint) ya 2025 mpo ya mibù monkamà ya boluboli bwa santu Jean-Marie Vianney. Ye ndakisa ya banganga-Nzambe, akozala na esika ya lokùmu na mboka Roma o mokolo mwa zubilé ya banganga-Nzambe kobanda 27 kino 29 ya sanza ya motoba.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye

 

31 sánzá ya mítáno 2025, 11:04