ÐÓMAPµ¼º½

Badiakoni Badiakoni 

Bakatoliko pene ya 1,4 milliard koleka na mokili

Motango ya sika ya bandimi na eklezya ya katoliko ezali kokόla na mokili. kasi, mpo na basàngo nà bamamelo, ezali kokita. Ezali bongo ut’o mobù 2022 kino 2023, motuyà ezali ya 1,15%.

Albys KBD CP – Kinshasa/RDC

 

Annuarium Statisticum Ecclesiae 2023 ewuti kobimisa mpe ekoyebisa solo ete motango ya bakatoliko na mokili ezali koká½¹la. Bapanzani na mokili, bato pene ya 1,406 milliard. Afrika ye moko, azali na nguya koleka, mpamba te, na 2023, 20% to 281millions kaka ya bakatoliko ya Afrika. Boká½¹li bona bozali ya 3;31%. Kati na bikolo bya Africa, kaka Republik Demokratiki ya Congo etangi 55 million, elandi sima ekolo ya Nigeriya oyo azali na 35million.

Na elembo ya mokonzi monene ya bantomà, kati kati ya bakatoliko bazali bayi-Amerika, nà 47, 8%. Na Brezil mpamba bazali 13%  bazali kolakisa 90% y abato na bikolo biye: Argentine, Kolombie to mpe Paraguay.

Kati na mobù 2022 kino 2023, bokoli na mabele ya Asia ezali na motango ya 0,6%, bango basali 11% ya bakatoliko na mokili. Na Philipines bazali 93millions, 23 mollion na Inde. Na mabele ya Océani, boká½¹li ezali ya 1,9%, na Europa 0,2%.  

Motango ya badiakoni eká½¹li

Na 2023, batangi na mokili mobimba 5430 episkopo, bokoli ya mwa moke kaka ya 1,4%. Bongo basango bazali 406996. Atako na mokili mobimba mtango mp ona basàngo ezali na kokita, na mabele ya Afrika emati koleka 2,7% mpe na Asia, pene na 1,6% koleka. Europa ndé azali ba motango ya basàngo koleka 38%, sima eyeyi Amerika oyo azali na 29%, Asia 18% mpe Afrika 13,5%. Nzokande, na mibù miyé miliki, motùyà ya badiakoni ezali komata na 2,6%, motango epesi koleka 51400 ya badiakoni. Na Océeani koleka 10,8%, na Amerika koleka 3,8%. 40% ya badiakoni bazwami na Amerika ya Nordi.

Bokiti motango ya bamamelo nà basàngo.

Motùyà ya basango na basàngo nà bamamelo ezali kokita kasi malembe malembe. Ut’o mobù 2023, motango epesami na 589423, lokola bokiti pene na 10 000 nà oyo ya 2022. Bazali ebele koleka na Europa, 1,3 na nyonso kasi na kokweya ya 3,8%.  Na Asia 30%, ebongwani te, etelemi esika yoko. Afika etangi motùya ya bamamelo ekoli bongo na 2,2% koleka.

Na bosukisi, batangi mpe ba seminariste na mokili mobimba, motango ezali ya kokita ut’o mobù 2012. Bazalaki 106495 na mobù 2023; kaka na Afrika nde ezali yakomata na 1,1% koleka. Emonani ete na mabele ya Afrika mpe ya Asia, ba seminariste baleki bato kati na bandimi ya katoliko. Kasi na Europa bazali moke makasi, 12% ya baseminariste nà 20,4 % ya bakatoliko. Na Amerika bazali 25,7% ya baseminariste bongo 47,8% ya bakatoliko.  

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basango na kofina esika eye.

 

21 sánzá ya mísáto 2025, 11:32