Maponomi na Ekolo ya Gabon: Eklezya akoyamba baye bakomipesa mpo ya bato
Albys KBD CP â Kinshasa/RDC
Ekolo ya Gabon ekomi na suka ya bokatisi (transition) na yango oyo ebandaki utâo mobù 2023. Basili kondima na malembe mpenza mibeko ya sika na nzela ya référendum populaire. Sima ya mimekano ya mikanda, bandimi nayino mineyi ya bato bakoleka na maponomi. Kati na bango, Général ya Brigade Brice Oligui Nguema oyo azali nayino kokamba ekolo na eleko ya bokatisi. Mpo na Mgr Matthieu Madega, oyo azalaki na misàlà ya kobongisa mibeko ya sika endimamaki na bayi-Gabon, âbakoki te kolobela emoniseli (prévisible)â. Mpo ndenge moto nyonso azalaki na posa ya âmbongwanaâ, bongo âbokatisiâ oyo esengelaki kosalema, ekambamaki na lisalisi ya Général Oligui Nguema.
Lolàkà etombwami, basengi nkombo ya mokambi ya bokatisi
Kutu lolaka ezali kotombwama, mpo balingi ete mokambi ya bokatisi azala moko ya baponi. Solo mpenza asàli kaka mpo nakobongisa mibeko te, kasi akotisi kimya nà bomoko na Gabon. Bokatisi eleki bongo makilà masopani te, esika bato banso bazalaki kobanga. Mgr Madega alobi été «asepelaki komona âte bato bazwaki makambo na maboko mpo na kokimisa matata». âBotombokiâ ya 2023, lokola ebengi bayi-Gabon, elekaki na ndenge ya kimya, bato bazokaki te, makilà mpe esopanaki te, mbemba moko te, ata ya biloko to ya bato mpe te. Maye manso, elobi episkopo, epusaki bato na elikya mpe etindi bango kosenga nkombo ya mokambi ya bokatisi na molongo ya bayé bakopono, nzokadé ye moko amikomisaki te.
Eklezya ya Gabon ekopono bilongi te.
Atako bayi-Gabon bandimi mpe basepeli ete Général Oligui Nguema apesa nkombo ya yé mpo nakoponama, eyebani te, soki akoponama na bato ebele mbala moko, elobi Mgr Madega. Mpo na yé, âmoto nà moto azali na lolenge ya yé ya kokanisaâ. Atako Général Oligui Nguema alingami na bato ebele; na ngambo mosusu, mwa nungu-nungu ezali kolobama, mingi mpenza na lolenge ya yé ya kokonza.
Kasi eklezya ezali na katikati ya bokeseni bwa mabanzo maye. Akopono bilongi ya moko to basusu te. Akoyamba banso na lolenge lyoko, na losambo lyoko, mingi mpenza ânakolinga ete maponomi maleka malamu mp ona ekolo mobimbaâ. Mpo, ekobi mokonzi ya yambo koloba âte «eklezya ezali mater mpe magistra, elimboli ete azali maman, molakisi mpe lokola, akopesa toli na moto nyonso, akolendisa na bomoko, na bwanya, na bomikitisi».
Mosàlà ya mopelengano ezali mosàlà na bondeko
âEklezya elingi bolamo ya moto, ya mobimba ya moto, mingi mpenza ya moto nyonsoâ. Elobi Mgr Madega bongo mpo akanisi mokumba eklezya ekoteyaka bato. Akozwa âmosàlà mwa mopelengano neti mosàlà ya bondekoâ. Eklezya akomipesa mpo nakosunga mibeko ya bikolo oyo ezali kati na koluka âya motango monene molekiâ. Ndé na yango ezali kolendisa bandimi banso nakomipesa na elanga ya mosàlà-monà. Azali kobondo basi mpe babali oyo bazali na makoki, bapesa nkombo ya bango mpo ya kokamba mbulamatari na bolingo, abnegation, bososoli, bwanya nà mpe koyeba makambo malamu malamu, azala mpe moto bakoki kotyela motema.
Esengeli banso bateleme mpo ya kobongisa
Banso bakolikya ete, eleko oyo ya bokatisi ewumela te. Bazali kozela âte makambo mazongela. Maponomi ya aprili ekozala elonga mpo na etulùlkù ya bayé basali eleko ya bokatisi. Abakisi lisusu ete, esengeli kozala na mpiko, moto moko akanisa te ete makambo makobongwana na mokolo moko.
Ata eloko ezali, ekolo ya Gabon ebengami na kofungwama, kokangisa mbondeko n abato misusu. Mpo na Mgr Madega, kofungwama enà ekosenga ete bayi-Gabon bazongela komituna tango mosusu, mpo bondeko lisalemi na bikolo misusu ezala na lokùmu mpe ezala eyano ya bosenga ya moninga. Na manso, elobi mokonzi ya yambo, ezalina mbongwana solo, esengeli mpe kotalela makambo misusu.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basango na kofina esika eye.