MAP

Ba gangs bazali kokoba na kopesa mibeko na kati ya Port-au- Prince, mboka-Mokonzi ya ekolo ya Haïti. Ba gangs bazali kokoba na kopesa mibeko na kati ya Port-au- Prince, mboka-Mokonzi ya ekolo ya Haïti.   (AFP or licensors)

Karezimo : Ba episkopo ya ekolo ya Haïti bazali na kolikya atako mabé eleki makasi.

Mikolo mibale yambo ya mokolo mwa misato ya mputulù, ba episkopo ya ekolo ya Haïti balendisaki bandimi nakozwa nzela ya koboya masumu, mpe kokoma bato bamosala ya kimya. Liboso ya kobanga mobulu bakoki kozwa makasi ya kotelema na Kristo oyo asekwaki.

Albys KBD CP – Kinshasa/RDC

 

Mpasi mpe mawa mpo na elenge mwasi moko oyo batomboki bapesaki mitindo ya kobwaka bebe na ye ya basanza mibale na moto. Tango aboyaki, bato oyo ya mabé babotoloki ye mwana mpe babwakaki ye na moto, o mokolo mwa 14 ya sanza ya mibale  ya mobù 2025. Eleko moko ya somo oyo ekolo ezali koleka. Basali oyo ya mabé bazalaki na mandoki na maboko.

Na mayebisi mabango ya karezimo ebimaki o mokolo mwa misato (3) ya sanza ya marsi, ba episkopo ya ekolo ya Haïti balobeli “likambo linà ya somo” mpe bazali kosenga baye bakotalelaka bosembo na ekolo, balandela bakolo mosala monà ya nko. Bakokisani likambo linà na lisolo ya ba-Israel na kobima ya bango o ekolo ya Ezipeti. Bakanisi ete bazali koleka eleko moko oyo mabé ezali kolandana, epayi wapi makila ya bato basali eloko te ekobelela o likolo.

Nzokandé, mpo yabango, eleko ya karezimo ezali nayino “nzela ya kobongolo motema” mpamba te, bolayi ya mabé oyo ekomeli bango, ezali kotinda bang ona bososoli makasi. Na mopepe oyo nyonso ya mobulu, basengi na ba-Haïti nakomituna: soki batiki molimo ya bokeseni to ya bobangi oyo ekopekisaka kozala mosali na boboto?  Soki basalisaki na kokolisa kozanga bosembo oyo ezali kobebisa mboka ya bango?

Baye banso bazali kobebisa bomoyi mpe koboma bandoto ya mabotà, basi babungisà koyeba kosala bolamo to mabé. Kasi elongi ya bango ezali elembo ya ekolo oyo ezala maladi, etondisami na bozangi bosembo, kokosa (lokutà) mpe bobola. Baepiskopo balakisi bongo mosapi na bakambi bya ekolo mpo ya kobimisa bango na ezalela ya konyokolo. Soki basali yango te, bazali solo elongo na misala ya bango ya mabé 

Kozongela Kristo mpe kotonga

Ba episkopo ya Haiti bakolikya ete na nsékwa ya kristo nde bato bakozwa makasi ya kotambola, liboso ya mobulu, kondongwana ya basoda, bozangi makasi ya baye basengelaki kokotisa bosembo na kimya. Na eleko oyo ya Yubilé, kolikya elimboli ete bakoki te kozela mabé esila, kasi ezali kotonga ekolo nà boyambi mpe bosembo, epayi wapi bomoyi ekozala na limemya, ndingisa ekozala likolo ya bitumba, moto nyonso akozala na bosengà ya koluka bolamu ya bomoko.

Na yango, mpo na eleko oyo ya karezimo, mokristo nyonso asengeli kozwa ezalela ya etumba na molimo mpe ya komipesa na bosolo. Ya liboso na « kobelela Nzambe na molende », ba eklezya ekobongwana na « bisika ya mabondeli mpo na kimya ». Na sima, kozalani moko mpo na mosusu, loboko ekotombolaka, lolaka ekosalisaka, elobaki bango.     

Ut’o mibù, Haïti, ezwami na mobulu ya bato-mabé nà mandoki, ezali likambo oyo bakambi baekolo bazali kokoka te. Bato tuku mibale (20) basilaki kokufa na butù ya mokolo mwa tuku mibale na mineyi (24) nà tuku mibale na mitano (25) ya sanza ya mibale, na quartier moko ya mboka-mokonzi ya ekolo.

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda  na biso ya basango na kofina esika eye

 

04 sánzá ya mísáto 2025, 17:10