ÐÓMAPµ¼º½

Liyangani ya mosala ya ba Episkopo ya ekolo ya Bénin na 2024 Liyangani ya mosala ya ba Episkopo ya ekolo ya Bénin na 2024  

Bénin : bolengeli mpo na mobembo na Yamoussoukro

Batindami ya Commission ya ba episkopo ya Bénin mpo na maye matali,mobembo, bazalaki na Côte d’Ivoire kobanda mokolo mwa 25 ya sànzà ya mibale kino 2 ya sànzà ya misato. Eklezya ya Bénin ezali kolengela mobembo mokosalema o mokolo mwa 29 ya yuli kino mokolo mwa 4 ya agusti. Ekomema bango na basilique Notre-Dame-de-la-Paix ya Yamoussoukro, mboka-mokonzi ya Côte d’Ivoire. Ekosalema na nzela ya mobù moye ya Yubilé ya elikya.

Albys KBD CP – Kinshasa/RDC

 

Na liyebisi  labango ya nsuka ya mokolo mwa 13 kino 16 ya sanza ya mayi, ba episkopo  ya ekolo ya Bénin bapesi nsàngo ya bolengeli mobembo ekosalema kobanda mokolo mwa 29 ya sànza ya yuli kino moye mwa 4 ya agusti na Côte d’Ivoire, na nzela ya Yubilé ya mobù 2025. Ekomema bango na Yamoussoukro mboka-mokonzi ya mopelengano ya Côte d’Ivoire. Mobembo monà mozali na motuya ya kokolisama na molimo ya ekwelà enà. Nde bongo lisanga ya ba episkopo ya Bénin ebyangi Banganga-nzambe, ba mibonzà, bandimi mpe bato banso bamotema bolamu na kosangana na ekwelà eye ya ngrasya mpe ya kozonga moto mwa sika na molimo. Mobembo moye ekozala moko ya mibembo minene ya Afrika.

Kokende na bokutani ya Nzambe mpe ya bandeko babali nà basi.

Likanisi ya kopona basilique ya Notre-Dame-de-la-Paix ya Yamoussoukro, ezalaki mpo na kopesa libakù na bandimi ya ekolo ya Bénin nakoyeba mpe komona ndako-nzambe eye monene ya etando oyo mingi bamona nayino te. Kasi mpo na Mgr Bernard de Clairvaux Toha, episkopo ya Djougou (Nord-Bénin)mpe mokambi ya Commission ya ba episkopo mpo na mobembo, ezali bongo libakù lipesami mpo ya komibimisa mpo na kokende nabokutani nà nzambe mpe bandeko babali mpe basi. Yango nde abakisi, tolingi kokende kosambela nzambe elongo na bandeko babiso babali mpe basi ya Côte d’Ivoire mpe basusu. Na manaka ya mobembo ena: Misa, mateya, ngonga ya kokumisa nzambe mpe kobondela, milulù mya ntubelà mpe bongo na bongo. Mpo ya kosukisa, misa ekokambama na episkopo moko o mokolo mwa 3 ya agusti.

Mpo na  Mgr Toha Djougou, banso bakokende mobembo monà, bakozonga lolenge mosusu, mpamba te, bakozwa mbano na bomoto mpe na molimo. 

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basango na kofina esika eye.

12 sánzá ya mísáto 2025, 10:09