Bénin: Ba projet mpo na bolamu ya babàngé mpe bakoka, mosolo mopesami na Eklezya
Albys KBD CP – Kinshasa/RDC
Esengeli koprofiter na mikolo mibale oyo Pàpa François atyaki mpo na kosepela babàngé mpe bakoka po na kokabolamakoki na bitando ya mabélé ya archidiosezi ya Cotonou. Na mobù 2024 Mokonzi mwa yambo, Mr Roger Houngbédji, apesaki ndingisa na ba instituts ya vie consacrée mpe na ba sociétés ya vie apostolique banso basàlàka na diosezi mpo ya ko bandisa makanisi basengaki yé. Solo, mamelo Léonie Dochamou, ya lingomba ya Institut des Oblates catéchistes petites servantes des pauvres (Ocpsp), alobi été : «na Afrika, mingi mpenza na Bénin, 75% ya babàngé basàlàki mingi na bomoyi bwa bango kasi na mpàmba. Awa makasi ya nzoto esili bango, bazali na Pension ya retraite te, basengeli kozala na bomoyi moko ya bobolà ekokisami na eloko moko te ». Bongo, nsinsani enà esalemaki mpo nako kokolisa lisalisi ya bato bakomi babàngé mpe bayé bazali lisusu na makoki ya kotambola te.
Tosengeli kozala bamemi bya Elikya
Sango Nayéton, alobi ete na ebandela, mosàla monà, mo “kokisamaki na mpasi” mpo bato bamipesaki te, mpemba te, basàli mingi ya pastoral bakendaka kopema na sànza ya yuli. Nayango baponaki kaka ba projet motoba nù motùyà ya mosolo pene na 1000000 FCFA na moto, ekokani na mbongo pene ya 1538 Euro.
Ezali bongo elembo ya bomipesi ya biso mpo nakotonga lisànga ya bomoko séko, mpe ya bondeko, elobaki Sàngo Théophile Akoha, molandi archidiosezi mpe yoko ntomà ya episkopo monene. Alakisaki mosàlà mona lokola bikela bya Elikya mpo na mobù moyé ya Yubilé. Balandi solo mbela ya Pàpa François oyo asengaki na bakristu bakende na bamalweka ya bikolo mpo ya kosangela Nsango Elamo, na maloba to motema te, kasi na misàlà mimonani (na bikéla).
Bikéla biye bisàlemi na ba projets ya prise en charge psychosociale Paloase Saint-François ya Assise ya Fidjrossè, Sainte-Famille ya Akogbato nà mpe Sainte-Claire ya Togbin. Proje mosusu ekosàlema na Paloase ya Sacré-Cœur de Cotonou, na mangombà ya Sô-Tchanhoué mpe Lokpo.
Kotàtola solo mpenza bolingi bwa Nzambe.
Na tango ya milùlù minà, Sàngo Akoha akanisaki lisusu n abato etindà ezwaki Fac, oyo ya kotàtola solo mpenza bolingi bwa Nzambe nà kolakisa misàlà ya bomoto ya Eklezya-Libota lya biso. Fac ekelamaki na sànzà ya yuni 2021 kasi ebimisamaki na mobù 2022 na sànza ya febuali o mokolo mwa mibale (2). Mpo na Mgr Houngbédji, likanisi lya kofungola moboko mpo na archidiosezi ya Cotonou ebotamaki na boséngà ya kozwa mbongo mpo na kokokisa ba projet enà mpo na bolamu ya moto. Mpamba te, projet ekolandela bisika ya misàlà mineyi; mingi mpenza maye matali “bokolongono bwa nzoto, kelasi, bomoyi y abato mpe bandako.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basango na kofina esika eye.