RDC : Cenco elakisi bozali ya bomoko na bato ya Nordi mpe Sud-Kivu
Alberte KBD, cp - Kinshasa/RDC
Ezalaki nà mawa ontei ya motema mpe bomitungisi mingi, oyo Cenco alobi ete alandaki likambo ya bozangi bokengi kati na baetukà ya Nord-Kivu mpe Sud-Kivu, oyo ¡°ebebi lisusu koleka nà bozwi ya engumba ya Goma na lisanga ya batomboki ya AFC/M23 esungami (esimbami) na ba-Rwanda mpe bokobi babango na engumba ya Bukavu¡±.
Solo, Kondongwana ya ba FARDC nà batomboki ya AFC/M23 ekomi makasi, bongo epusi na makàmà minene ebungisi bomoyi ya bato ebele. Lisusu, epesi nzela ya koyiba biloko o kati ya engumba ya Goma mpe bamboka ya nzingànzinga, Ekòmisaki lisusu makasi (epusi) mpe kokima na mboka mopaya ya bitulukà ya bato, bakomi na bobòlà mpo na bitumba ekozongaka mbala na mbala, ut¡¯o mibù tuku misato. Nsango ena epesami na mokambi ya Cenco, Mgr Fugence Muteba, episkopo monene ya engumba ya Lubumbashi.
Cenco Ezali kolela ¡°bitumba oyo eleki ndelo¡± mpe ebondeli mpo na banyokwami
Bakonzi ya liboso balobi ete likamb¡¯ango ezali grave mpe mposa eleki monene ¡°nde etindaki biso kozwa mwa ngonga moke ya kozala na kimya, mpona koyeba yango malamu mpe komanyola mikano yakozwa mpo na lobi¡±. Liboso ya matata, mobulu mpe bitumba mana manso, basangani ya Cenco balakisi bomoko bwa bang ona Mgr Willy Ngumbi, episkopo ya Goma, nà Mgr Franswa xavier Maroy, episkopo monene ya Bukavu bongo mpe na bato banzambe bazwami na ekangà ena ya bitumba. Lisusu, ¡°bapesi ba Condoleanse ya bokristu, na mabotà manso oyo babungisi bandeko babango na nzela ya bitumb¡¯oyo eleki ndelo, balakisi mpe mawa ya bang ona banso bazali na mawa mp ona mitungisi ya bikwélà biy顱.
Lisanga na Pàpa, Cenco asengi mwango ya Kimya
Nakokòba na masolo na bango, bakanisi ete mpo ya mabanzo Tata mosantu azali na yango mpo ya Ekolo ya RD Congo, alendisaki ¡°biteni bizali na mobulu batika boyinani mpo nakobatela bacivile¡¡± mpe asengi na ¡°bakambi ba mboka mpe bya bikolo na mokili na kosala ete bazwa mokano mpo na makambo ya matata, na banzela ya boboto¡±.
Lisanga na episkopo wa Roma, Cenco ezongeli kobianga bato na boyokani nà eklezya ya Kristu na Congo (ECC) ¡°na lisalisi ya bokangemi ya bato mp ona kimya mpe bozalani malamu na lisanga o kati ya ya RD Congo mpe na baetimà enene¡±, alobi ete soki mosangani moko azali na mpasi, ezali nde nzoto mobimba ekonyokwama elongo na yé (tala 1 cor 12, 25-27), «Tozali kobondo bandeko babiso banso, babali mpe basi ya bitùkà ebebisamaki (ezwi likàmà) na bosangani lya biso na mpasi ya bango, mpe bozalani ya biso pembeni na bango na molimo», ekomi ba episkopo ya Congo. Basengi lisusu na bandimi ya Katoliko mpe bato banso bamotema bolamu na ¡°kokòbisa bansambo mpo na boyei bwa kimya moko ekowumela kati na ekolo ¡±
«Na bolobeli ya Mosantu Maria, mobondi ya bayè bazali na mawa, ete Nzambe apesa na bango nguya ya kimya okati ya mboka na biso, RDC» esukisaki bongo na elikya lisangà lya baepiskopo ya ekolo ya Congo.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda ya basango na kofina awa.