RDC: CENCO n¨¤ CCE babandisi elembo ya boyokani mpo na kimya na mindelo kati na bikolo
Albys KBD cp ¨C Kinshasa/RDC
« Ba mpasi boni boni, liwà, koyokisa mpasi na nzela ya kosangisa nzoto, kokima ba mboka, kobebisama, esengeli lisusu, yambo ete Kimya mpe bozalani-malamu-elongo ekozwa esika na RDC mpe na bitando ya mibeke (baetimà) minene ?». Na nzela ya motuna moye mpe mingi lisusu, Lisàngà ya ba Episkopo ya ekolo ya Congo (CENCO) elongo na Eklezya ya Kristu na Congo (ECC), bazali kolakisa elilingi ya mawa ya makambo ya RDC mpe na etuka ya bitimà minene, oyo ezali kopesa bobangi na likambo ya « mbebà ekoki kosalema na bomoyi ya bato nà makàma oyo bakoki kotanga te ». Na nsango moko ya bango ebimaki o mokolo mwa 15 ya sanza ya yanuali, mangomba mibale miye ebengisi bakristu banso mpe bato ba bolingi na kotalela mobù 2025 lokola ¡°Mbula ya kimya mpe ya kofanda malamu elongo na DR Congo mpe na bitango ya baetimà minene¡±. Mbelà moye motaleli kaka bayiCongo mpe bayé ya baekanga binà, mpo bakomisa yango eloko ya motuya ekosenga bomipesi makasi mpenza « na lombango ».
Kozongela mabongi ya « Bumuntu », ntina ya bomoto ya Afrika
« Mokolo na mokolo ¨C ekomi ba mangombà miye mibale ¨C tango ezali kokima biso mpe bibongiseli ya mbebà ekoki kosalema na bomoyi ya bato nà makàma oyo bakoki kotanga te ezali kokoma polele ». Yango wana, mpo ya mokumba ya bango na nzela ya kibontomà, bazali kolendisa bato, masanga mpe bitukà ya bikangà ba bango ya mike, nakosala mpo na « kozala elongo na kimya mpe bondeko » nakolakisa mokano mwa bango lokola « bato ya ebandeli ya bomoto na mokili », mpo ete « Elikia ekolembisaka nzoto te (ekosaka te) » (Rm 5,5). Na nsango ya bango, CENCO nà ECC emonisi ete makàmà wana manso ya mboka na biso ekoki kotika biso lisusu te na bokeseni. Mpo ya kosukisa minyoko myango, esengeli kozongela mabongi ya bomoto mpe mimeseno ya bonkonko ya « Bumuntu», « oyo kala ezalaki ntina ya bomoto bwa biso na Afrika ».
Momeseno ya bokatisi mindelo ya boyokani malamu ya Bonkoko ba biso nakotangisa makila te
Bozongeli bonà, elobi ba mangomba miye mibale, ekopesa biso nzela ya kozongisa boyokani na mimeseno malamu ya bankoko ba biso, oyo bayebaki ndenge ya kosilisa mikakatano ma bango ¡°na mayele¡± na nse ya nzete ya masolo. Ekokolisa mpe bikolo ya mibeke minene « momeseno ya kozala malamo na bokatisi mindelo ya bamboka » « nakozanga kotangisa makila ya bato bayebi likambo te ». Na yango motuna yakoyeba « wapi epayi likanisi ya kolongola moninga mp ona kosepela na bomengo mpe boboto bwayé ? Esengeli kaka kosalela mandoki mpo ya koluka lotomo la biso ? mokili kani tosengeli kotikela bayé bakoyà sima ya biso ? ». Mpo ya kosukisa mabungani wana, CENCO mpe ECC babwaki mbelà na lombango : « Tokende nokinoki kokanga na bontoki bonso, ¡°elembo ya boyokani ya bato mpo na kimya mpe kofanda malamu elongo na DR Congo mpe na bibeke minene ».
Biteni mitano ya ntina mpo ya kokota na elembo ya boyokani ya sika
Mangombà miye mibale ebanzi ete bokokisami ya boyokani bonà, ¡°ekopesa Afrique makoki ya komilongola na bitumba ya politiki mpe ya minduki mpo ekoma eteni ya bozalani na bondeko ya bato o kati ya mokili, ya mangombà mpe bikolo, nde bongo, ekotombola ndakisa ya etukà ekopesa lotomo na ndingisa ya bokonzi na bato, na kimya mpe konzo kati na bikolo ndenge na ndenge¡±. Ba biangi bato basangana ebele, na makanisi mitano ekosenga: - 1 na kozongela mabongi ya bomoto mpe mimeseno ya bonkonko mpe ya molimo ya «Bumuntu», mpo na kotonga kimya ya seko mpe kofanda malamu elongo na RD Congo mpe na mibeke minene. -2 mpo na « ko lekisa liboso nzela ya masolo (maloba) mpo na koluka boni boni kozwa biyano na makambo bya ntina» ya matata ya mandoki oyo ezali kolelisa mpe kokomisa RDC mpe baetimà minene, etuka ya makila; - 3 kosangana mpo na limemya ya bokeseni ¡°mpo na kotonga Afrika ya makasi, ya bomoko mpe ya bofuluki (bomengo) liboso ya mikakatano ya mokili mobimba¡±; - 4 mpo na kopusa bakambi ba politiki ya Afrika mpe ya baetimà menene na ¡°kosangana na mosala ya Ekolo-molimo mpo na kopekisa makelele ya bibundeli na kontina na biso¡± mpe kotonga boyokani mpo na bokoli ya kokoka, ya seko, na bozangi koyiba nkita ya mabele mabiso oyo ezali kokobisa bitumba ya mandoki; - 5 na bosukisi, mpo na « kosenga na communauté internationale na kosunga bato ya Afrika na mokumba mpe na bosembo nyonso mpo batonga yango lokola esika wapi bosembo, kimia mpe ba mabongi mabomoi mpe ya zinga zinga ekoyangela nakotikela baye bakoyà sima».
Liyangani ekosangisa bikolo mpo na kosukisa mindondo ya mindelo kati na bikolo
Mpo na kokamba projet oyo, CENCO nà ECC bakosala ba commissions thématiques oyo bakolakisa na nsuka ya sanza ya yanuali pe oyo ekozala na mosala ya koyeba na bozindo makambo ndenge na ndenge, na nzela ya mayangani, oyo « ekoki kobongwana na mikano pe makanisi oyo esengeli kokomama na « Mokanda ya Letà mpo na kimya mpe bozalani malamu, ekobongisama na mwa basànzà na nzela ya masangà (makita) ya ekolo».
Kolonga ya projet eye ekotalela mposa ya kosangana ya bato ebele, ebeti bango nsete ba Eklezya eye mibale. O ngambo ya bango, CENCO mpe ECC bamipesi lotomo ya « kosala baplaidoyers pembeni ya ba acteurs socio-politiques ya minene o kati ya ekolo mpe na bikolo misusu mpo na kosangisa makanisi mabango mpe kokela synergie zongazonga ya projet eye soki ezwami, ekopesa nzela na modus vivendi ya sika na RDC mpe na bitando ya baetimà minene. Balakisi ete projet ena ekosalema na lisalisi ya ba misala socio-culturelles bikeseni.
Nsango ekomamaki na Mokambi Eric Nsenga, Mokomeli monene ya Eklezya ya ECC mpe Mgr Donatien Nshole, Mokomeli monene ya CENCO, esukaki na ba annexes oyo ekopesa mitindo na lolenge yakosalela mpo na bosangani ya moto ye moko, ya mangomba mpe ba entreprises.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda ya basango na kofina awa.