ÐÓMAPµ¼º½

Luka

Wenze moko na balabala na Goma liboso ya pompi esans ebebisami tango ya bitumba na ba M23 Wenze moko na balabala na Goma liboso ya pompi esans ebebisami tango ya bitumba na ba M23  (Arlette BASHIZI for Reuters)

Goma : ACEAC akweyisi (atelemeli) bobungisi bomoyi ya bayik¨¦

Bozwi ya enguma ya Goma, o moniele ya ekolo ya RD Congo na etuluk¨´ ya batomboki ya M23, ebotisi liwa ya bato pene na nkoto isato (3 milles). Mokolo mwa mos¨¤l¨¤ 4 mwa 6 ya febuali, kati na nsango moko ACEAC, Bosangani ya lisanga ya masanga ya ba Episkopo y¡¯Afrika ya katikati, etalisi mawa ya y¨¦ mpe etelemeli ?mobulu moye mokotika te kolelisa baetuk¨¤ ya bitim¨¤ binene, oyo ekotisi lisusu engumba ya Goma o kati ya lil¨¤k¨¤ mpe bozangi elikya?.

Albys KBD, cp ¨C Kinshasa/RDC

 

«Yambo ya mwa mikolo mpo yakosepela eyenga ya bomimoniseli ya Mokonzi wa biso o tempelo, ya bakatoliko, ya mokolo mwa 2 febuali 2025, etukà ya bitimà binene ezongelaki kotungisama na mobulu ya bondongwani kati ya mapinga na engumba ya Goma na ekolo ya RD Congo», elobi ACEAC, na libandela ya nsango ya yé atindeli bakristu mpe bato bamotema bolamu ya etukù ya bitimà binene.

Solo sima ya bozwi ya Goma, « elandisamaki bobungisi ya bomoyi ya ebele y abato, ematisaki kokima ya masanga ya bato, ebebisaki koleka kibobolà ya bato ya mawa, ebukaki boyokani kati na bato mpe/to mangoba, bongo na botungisi ya likàmà ya bomoto ekokanisa lisusu makambo mabé molekaki na lisolo ya etukà». Ezali lisolo ya mawa oyo bakofunda, ba episkopo ya lisanga ya masanga ya ba Episkopo y¡¯Afrika ya katikati, ACEAC, esalemi na ba ekolo ya : Républika démocratiki ya Congo, Rwanda mpe Burundi.

Na «motema ekotanga makila», ba episkopo ya bikolo biye, bakaboli mpasi ya bayé banso babungisi moko wa libota la bango to baninga ya pembeni, okati ya molongo ya basoldat to ba civil basali eloko ye, mingimingi ban aya mbula ya nsé. «Tokweisi mobulu moye mokotika te kolelisa baetukà ya bitimà binene, oyo ekotisi lisusu engumba ya Goma o kati ya lilàkà mpe bozangi elikya», ebeti nsete bakonzi bayambo.

Mpo ya komatisa lokumu mpe bomoko (bondeko) kati na bato

Na kobelela Plan pastoral ya ACEAC mpo na boboto (kimya), lokola ebongisamaki na Roma na sanza ya zomi (oktobere) ya mobù 2023 mpe ekokisami na Goma na sanza ya yanuali-febuali 2024, ba episkopo ya Congo, Rwanda, mpe Burundi babengisi na nsango ya bango bakambi kati na bokonzi ya politiki, nà mpe na bitukà mpe na Africa mpe na mokili, lolenge ya ya makoki mpe bokasi babango, mpo ete bamikomisa na mabongisi ya crisi oyo mpo ya kotombola lokubu ya banso mpe ya moko na moko, mpe botosi ya lotomo ya bato mpe ya ba peuple .

Lisusu mpo ya kobikisa evandeli na lisanga, ACEAC abiangi bana ya basi mpe babali ya eyukà ¡°na kosangisa maboko mpo ya kobuka elimo ya bokabwani mpe ya boyinani ekoki kobuka (kokabola) lisanga ya bato mpe kokobisa seko bobaluki (elimo) ya mobulu¡±.  ¡°Tozali na bosenga ya bomoko (bondeko) ya mangomba mpe ya bato bamotema bolamu mpo ya kosunga bapeuple bazali konyokwama¡±, elendisi bakonzi bayambo na nsango na bango.

Kimya mpe Elikya

Lisusu, baepiskopo basengi na mangomba ya bakristu « nakomitungisa mpo na bato bazwi likàmà, bayé bazoki, bakimi-mboka, bongo basambela mpo ete mwinda mwa kimya ezimama te, bongo elikya elimwa mosika na biso te ». «Tozali kokoba na kolikya lisalisi ya bosangisi makasi ya ba bango mibale lizwami mpo ya mabongisi ya etukà nakotonga elongo kimya oyo ekowumela». Kasi, na nsango na bango, bakonzi bayambo bazangi te kopalela makasi baye bazwaka litomba na mikakatano (pêcheurs en eaux troubles), na ba-bwaki monyama ya molili (tireurs des ficelles dans l¡¯ombre), ba-boti nsango ya lokutà (fabricants de fausses nouvelles), na ba-panzi mabé mpe biloko bikobomaka (relayeurs de l¡¯intox et de produits toxiques), batika kobakisa kokela bansango ekokotisa lisusu bato na mobulungana.

Makila nà Nsuni elongo.

Nakokanisa mokanda onà ba-ebré, nakobete nsete na lolenge ya bondeko, « mpo été bana babato bazali na makilà mpe nsuni elongo», l¡¯ACEAC elakisi bomoko bwayé na bato bazali konyokwama ; alendisi bango nakotya motema sé na kristo oyo azali na makoki ya komema lisungi na bayé bazali na mpasi. « Tika ete ngondo Maria oyo amemaki mwana wa yé o tempelo mpo nakobonzela yé na mokonzi, azala lisusu lelomei oyo akobondo biso o nzela, akotambola na biso elongo, mpe akokosita na molimo na biso bokasi ya kolikya na kimya ekowumela». Nde na losambo oyo ya motema ACEAC asukisaki nsango ya yé oyo etiamaki elembo na mokambi ya yé, Mgr José Moko, episkopo ya disezi ya Idiofa na ekolo ya RDC.

Baepiskopo basangani ya lisàngà ya masàngà ya baepiskopo ¡¯Afrika ya katikati (ACEAC)
Baepiskopo basangani ya lisàngà ya masàngà ya baepiskopo ¡¯Afrika ya katikati (ACEAC)

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda ya basango na kofina awa

 

07 s¨¢nz¨¢ ya m¨ªbal¨¦ 2025, 22:18