ÐÓMAPµ¼º½

Ba nsango ya Bikela bya ngambo ya Orient – 28 febuali 2025

Ebandela ya eleko ya Karem ya bayi-Ethiopi

Mpo ya bandimi bakristu ya rite guèze o ekolo ya Éthiopie mpe ya Érythrée, eleko ya karem esilaki kobanda o mokolo mwa 24 ya febuali. Ezali eleko ekowumela mikolo tuku mitano na itano (55). Na eleko eye ya molayi, bakristu bakolandela bo momeseno, losambo mpe bopimi ya biloko mikowutaka na niama, kino o mokolo mwa Fasika. Ekosepela nsekwa ya Kristu, na bileyi ndenge na ndenge.

Mibù misato (3) ya bitumba o ekolo ya Ukrayine

Bongo, mokolo mwa 24 ya febuali ekundoli mibù misato (3) ut’o ba-Russe ba kotisaki bitumba o ekolo ya Ukraine. Na libakù linà, Sa Béatitude Sviatoslav Shevchuk, episkopo monene ya eklezya grecque-catholique, alobaki na bandimi. Tango bakutanaki na ba sàngo ya Ukraine mpe na bakambi ya mangomba y’Amerika, atondoki botondi bayi-mapinga mpe ba civil oyo bazali kosunga Ukraine mpe bazali kolendisa bato nakobungisa elikya soki moke te.

Ruben Vardanyan aboyi koliya

Mbulamari ya kala ya etuka ya Haut-Karabagh, homme d’affaires mpe philanthrope, aboyi koliya poso mobimba. Na mbala moko, bokolongono bwa nzoto bwa yé ezali malamu te. O kati ya boloko mbula mobima eleki, azali kozela kotomboka ya communauté internationale kontre « procès spectacle ». Bakangaki ye elongo na baninga bayé zomi na itano (15) na tango ya bitumba ya mobù 2023 na sanza ya setembere na bakonzi ya Azerbaïdjan. Abungisi lokola boye 6 kg mpe azali konyokwama mpo na tension ekomata yé.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda ya basango na kofina awa

 

28 sánzá ya míbalé 2025, 12:01