MAP

2025.01.14 Poso mwa losambo mpo ya Bomoko bwa bakristo ya 2025 2025.01.14 Poso mwa losambo mpo ya Bomoko bwa bakristo ya 2025 

Poso ya losambo mpo na bomoko bwa bakristu ut’o liyangani lya Nicée

Poso mwa losambo mpo ya bomokoya bakristo ekosalema mobù moye banda mukolo mwa 18 kino 25 ya sanza ya yanuali. Mabondeli mpe makanisi ebongisami na bandeko babali nà basi ya baniango ya Bose na ngambo ya Nordi ya ekolo ya Italy. Batondisamaki na likanisi ya bosepeli mibù nkoto yoko na nkama sambo ya Liyangani ya Nicée.

Albys KBD, cp - Kinshasa/RDC

 

Mibù nkoto yoko na nkama sambo ya Liyangani ya Nicée, na mboka Constantinople, mabondeli mpe makanisi ya poso mpo na losambo ya bomoko ya bakristu ekopesa libakù ya « kokanisa eyamba moko ya bakristu, mpe kosepela myango, lolenge esakolami na Credo basalaki o eleko ya liyangani linà; eyamba kino lelo tokosakola lisusu mpe ekobota mbuma», elimboli Mwa buku ya Leta mwa ekwela enà.

Bosangani monà ya Nicée ya mobù 325, ememi mposa ya bomoko, likanisi epesami na mofelele Guido, ya monastele ya Bose, lolenge yoko etindami mpo na oekimenismo mpe masolo na diosezi ya Biella, na Piemont, na Nordi ya Italy. Akumisi bomipesi ya bakristu oyo ut’o mibù nkoto yoko na nkama sambo (1700 ans) balekisaki « bozangi kotyela basusu motema, kokanisela basusu mabé, bozangi koyokana» mpo ya « kokende liboso mpe kobikisa ba mpota»

Monfelele Guido asepeli lisusu na mpiko ya bakristu ya eleko enà na “kotàtola eyamba ya bango libanda”. Nde bongo, poso moye mokomi mbela mpo yakokota na boyambi oyo ekosangisa bakristu banso, nzoka ndé ekimenismo nà bomoko « ekoki kokutana na likàmà ya kokatana soki mpiko ya kokende liboso ezali soki moke te ».

Monfelele Guido, likanisi na molimo ya Nicée

Mobembo ya boyambi ya Nicée

O kati ya bitikélà ya Nicée, credo esukisaki liyangani lina ya Constantinople ya mobù 381.Mobù moye, likanisi lya poso ya losambo epesi likanisi «mobembo (bokatisi) ya kondima ya Nicée »

Lingomba ya Bose na Piemont esangisaka basango mpe bamamelo oyo bazali na ba eklezya ya bakristu ndenge na ndenge. Bamofelele bakambi baponaki mitùnà «Ondimi yango ?» ezuami na Nsango Elamu ya Santu yoane mpe sima « baboyà makambo ya boyambi ya motuya ut’o makanisi ya botata ya tango ya Nicée », elimboli ndeko Guido.

Monfelele Guido, Bomoko bwa bakristu lelo.

Na Ngambo ya nordi, poso ya losambo mpo na bomoko ya bakristu esalemaki ut’o mokolo mwa 18 kino 25 ya sanza ya yanuali. Mikolo miye mipesamaki likanisi o mobù 1908 na Paul Wattson mp ona kokundola eleko ya eyenga ya Mosantu Petro mpe moye mwa santu Polo.  

Mpo na kosukisa poso ya losambo eye, mokolo mwa 25 ya yanuali, na eyenga enene ya Mbongwanà ya Santu Polo, Pàpa akokamba milulu ya losambo ya mpokwa na ngonga ya 17h30, na bazilika ya Santu-Polo-libanda-ya bifelo (Saint-Paul-hors-les-Murs).

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda ya basango na kofina awa.

 

19 sánzá ya yambo 2025, 08:28