Nobel ya paix 2014, Malala Yousafzai atelemi kaka po ya likoki ya bot¨¦yi
Jean-René Bompolonga- Kinshasa
Na mibú 14, likoló ya etumba na ye po ya kotómbola likoki na botéyi ya bási na ekóló na ye, Pakistan, Malala Yousafzai azokaka simá ya mobúlú ya ba taliban eye elingaka elongola ye bomoi. Kási elenge mwási atika te. Akobaki etumba abandaki kaka na mibú 11, na bokomi na internet po ya kobátela likoki ya botéyi ya bána bási na etúká na ye, ya Swat. Na tángo moke, akóma mongóngó mókó ya mokili po ya botómboli likoki ya botéyi ya bána bási ya mokili mobimba. Akóma liziba mókó ya bopesi makanisi na bato ebelé, bási pe mibáli, baye bakota na likambo yangó. Na 2014, na mibú 17 kaka, Malala akóma elenge ya makási ya kozua prix Nobel ya paix. Na tatá na ye, Ziauddin Yousafzai, ye mókó motángisi, akelaki Fonds Malala, eye ekobunda úta koleka mibú zómi po ya boyingeli na botéyi na nzelá ya mikáno ya sóló.
Na lisoló eye apesaki kaka na ba média ya Vatican, Malala akoloba bomipesi na ye po ya botéyi ya bána bási. Alobaki likambo ya ba milio ya bána baye bazangi etéyelo likoló ya bitumba ya mondóki pe abimisi ntina ya bosololi kati na biyamba po ya kotómbola botéyi.
Na botámboli na yo, elenge mokomi na internet ya Swat pe mobuni po ya botéyi na mokili, ezali liziba mókó ya makanisi. Loléngé yo mókó osáli pe bomipesi na yo bibongoli nini simá ya mibú ebelé ?
Tángo nabá ndaki kobunda po ya botéyi ya bána bási, nazalaki na elikya ebelé. Nakanisaki ¡®te bulamatari na bakónzi basusu baye balakisaki ngai lisálisi na bangó bakosála nionso ekoki na lombango zambi ya kobongola mokili ya bilenge bási. Leló na mibú 28, esengeli nandima bosóló mókó ya mawa : mbóngwama ezuaka ngonga. Atáko mibu mingi ya bobundi, koleka 122 milio ya bána bási bayingeli naino na bitéyelo te. Bomoi elakisi ngai ¡®te botómboli ekosúka kaka na bilaká te. Ekosénga makoki biye bikoúmela pe motéma molai. Kasi mabakú mana bilembisa pósá na ngai te ya kosála lobi elamu po ya bilenge bási. Ezali etindá ya bomoi na ngai, pe ekozala bôngó po ya sékó.
Bitumba pe mobúlú, úta Syrie kinó Ukraine, úta Gaza kinó Sudan ya Sudi, bikopekisa ba milio ya bána, mingi mingi bána bási kokende o etéyelo. Boni boni ekoki kosálema ¡®te bána waná babosana bangó te?
Likanisi ena etelemisaka ngai na butú. Bána boni bazali kolála na boyóki bobeti masasi na eleko eye? Bitéyelo boni bizuaki ba bombe póso eye? Mabota boni bikabwani po ya libela, bikosangana lisusu te ? Na Gaza, motángo ya bána babomi bango ezali kobangisa. Kozala na génocide ya boye ezali neti elikya ebúngi, lokóla soki eloko ya kosála ezali te, kasi ezali bôngó te. Po ya kosálisa bána bazuami na bitumba, tokoki kopesa mosolo ya botéyi na ndéngé ya lombango pe kosálisa masangá bisika waná biye bikopesa bána bisika bikosúnga bangó ya bozui makoki bisengeli.
Ezaleli ya bána bási ya Afghanistan na bokonzami ya ba taliban ezali pási, boyingeli na bangó na botéyi ezali na ndelo. Lobi ya bási ebelé ya ekóló ena ezali ya malonga te. Nini Fonds Malala ezali kosála po ya kosálisa bána bási y¡¯Afghanistan, pe lisangá ya bikóló ekoki kosála nini po na kosúnga bangó?
Monene ya mabé esálemi na ba taliban ezali ya kokanisa te. Bási pe bána bási bazali kobóya bangó bazua nzelá ya botéyi, ya mosála pe loléngé nionso ya bosáli politiki. Bazali na maboko na bangó eténi mókó mókó ya bomoi ya mwási, atá kokende na parc, monene ya mongóngó, elateli na ye. Ezali apartheid. Póso eye, Fonds Malala asakolaki bopesi ya milio 3 ya ba dollars po ya kosálisa bána bási na Afghanistan, koyanola na ba pósa ya boyékoli. Na botéyi o ndáko, na etando eke pe na radio, na satellite, tozali kosálisa manaka ya bána bási ya bokobi botángi na bangó na bokónzi ya taliban.
Na mwâ mikolo, ekozala Mokolo ya koyéba kotánga pe kokoma ya ONU (mokolo ya 8 ya sánzá ya libwá). Nsango nini olingi kolekisa po na kopesa pósa na baye bakotánga bisó ya kosála pe kopesa na mwána mókó mókó, pe mingi na mwána mwási mókó mókó, ya kozua likoki ya kotánga, kokoma pe koyékola na bonsómi ?
Mokolo na mokolo, bilengé bási ebelé bakoyékola na mwinda ya bougie, bakotámbola ba kilometre na makolo po ya kokende o etéyelo to bakotánga atá bazali koyébisa bangó bavanda na ndáko. Molendé na bangó pe bokasi na bangó ya koyékola bizali kopesa ngai makanisi. Na islam, mosála pe boluki koyéba bizali mikáno ya ntina ya boyambi. Nayébi ¡®te bizali pe na ntina na momeseno ya ba katoliko. Sóki bána bási babongami ya komeka nionso po na bozui kónzo ya koyékola, waná nakanisi tokoki bansó kozua makási ya kobátela bangó. Mbóngwama ekosálema yangó mókó te. Esengeli toyóka bána bási pe kosénga na bakónzi na bisó ya kopesa makoki na botéyi pe na makambo bikoúmela.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisoló oyo.