ÐÓMAPµ¼º½

Luka

Sima ya mbula ya mousson na Pakistan Sima ya mbula ya mousson na Pakistan  (ANSA)

Mp¨¦la na Pakistan, s¨¢ng¨® mok¨®nzi molandi ya Islamabad akolendisa po na bos¨¢lisani

Na province ya Kyeber Pakhtunkhwa, ba mb¨²la ebel¨¦ bimemi ba mp¨¦la ya mak¨¢si pe bokw¨¦yi ya mabel¨¦, na bobomi bato mingi. Libos¨® ya likambo ena ya p¨¢si, s¨¢ng¨® AKhokhar, ab¨¦leli po ya bobiki na p¨¢si ya bato. T¨¢ngo lis¨¢lisi ezali na mokakatano po ya kok¨®ma na bisika bizindi mak¨¢si, Eklezia ya wan¨¢ pe bato bazali kos¨²nga bato bazindaki.

Jean-René B- Kinshasa

Mikolo ya 14 pe 15 ya sánzá ya mwambi, eténi ya nordi-ouesti ya Pakistan ebetamaki na ba mpéla ya makási pe bokwéyi ya mabelé. Eleko eye ebákisaki motángo ya bato bakúfaki na oyo babengi ¡®mousson¡¯, úta pósó mibále bilekaki, koleka 500, bato babúngi bazali na káti te. Makambo maye bimemi bobébisi ya biloko bébo, mingi ya tina, pe bibeti makási milona pe mabelé ya bilanga.  Sángó mokónzi molandi ya diocèze ya Islamabad-Rawalpindi alobi lisusu ¡®te, « bato ebelé na ba mbóka ya pembeni bazali kobika na pási pe na bobángi liwá ».

Bosóló ya mabelé

« Na Rawalpindi, tozali kaka likoló-likoló¡±, elobaki sángó mokónzi molandi pe mokambi ya Misála ya Papá po ya batindámi na Pakistan. Ya sóló, ba mbúla bizali kokátana te, pe bibándi kokende epayi ya sudi ya ekóló, « likambo ezali pási pe ezali kokende na biténi ya káti ya Pakistan ». Lisusu, eténi ya nordi-esti ezali na ba ngómbá mingi, mosála ya bato bazali koya na lisálisi ekómi pási. Sángó mokónzi molandi alobi : « Tozali na ngonga mókó ya kozanga koyeba », pe « lisálisi na bato bazindi ekómi pási, kútú tángo mosusu ekosálema te ». Bisaleli ya ba nzéla ya singá bibébi makási, na botúngisi lisoló pe bozui internet.  

Pakistan ezali ekóló ya mitáno na bato ebelé na mokili, pe mókó ya baye bazali na pási koleka na makambo ya mbóngwana ya klima. Ekóló ekutana na ba mpéla ya liwá na mibú mileka. Kasi ya mbala eye, ekoki kozala likambo mókó ya mokili ya bobomi úta ebándeli ya mousson. Na région ya Pendjab, ba mbúla binokaki koleka ya mobú moleki na 73%. Engebene na mokandá (rapport) ya molongó ya bato ya nzebi ya World Weather Attribution, ba mbúla káti ya mokolo ya 23 ya sánzá ya motóbá pe mokolo ya 24 ya sánzá ya sambo elekaki bikokaki komáta na 15%, likoló ya bopeli ya klima (rechauffement climatique).

« Na nordi ya Islamabad, elobi sángó Asif John Khokhar, ekúmbaki mókó ekitisaki mbúla mókó ya monene na ngonga moke ». Makambo maye bibébisi biloko ebelé. Sángó mokónzi ya ndáko-Nzámbe Sántu-Yosefu ya Gujranwala, sángó Francis Gulzar, apesi nsango : « Awa lokóla, ba mpéla bikómaki na mbóka, mayi ya bibále bibimi na bobébisi ba ndáko pe milona ».

Bosálisani ekokoba atá pási ezali

Eklezia ya Pakistan emipesi mosála ya kosálisa na ndéngé ekoki bato. Pási ezali makási, yangó ekokómisa lisúngi mobúlú. ¡°Tokomeka kobongisa lisálisi, atá bulamatari ya province akokutana na mikakatano minene¡±, elobaki sángó mokónzi molandi ya Islamabad. Kasi abákisaki ¡®te lisangá ya bakristu etelemi, mingi penza na lisálisi ya Caritas pe ya ba paloisse ebelé, kasi yangó etikali «na ndéngé ekoki kosálema ».  

Biteyélo na ba ndáko-Nzámbe bifúngoli bizibeli na bangó pe bakopesa esika mókó ya kobombana na baye bazali na pási. Eloko ya kolia epesami lokóla. Sángó Gulzar akanaki koloba lisusu ¡®te « bato bakimi bazali ba musulman pe bakristu, yangó ezali kosála bokeseni te, tokosúnga bomoto ya mobola, bozangi, bolembi ». Loléngé bato bazali na ekóló ekobángisa. Úta sánzá ya motóbá, koleka bato 750 bakúfaki, pe totángi koleka mili mókó bato bazoki.

Matondi mingi na ndéngé otángi lisoló oyo.

24 s¨¢nz¨¢ ya mwambe 2025, 12:37