Mabotu na Serbie, bob¨¢ngi ya episkopo ya lok¨²mu Nemet ekok¨®la
Jean-René B.-Kinshasa
Kandá ekokoba na ba nzéla ya Serbie úta póso mókó. Likambo yangó eumeli úta sánzá libwa, simá ya bokwei ya motondo (toit) ya ndáko ya engbunduka ya Novi Sad. Bato misusu ya Serbie bamóni ¡®te likambo waná esálemi likolo ya mbongo ya corruption. Úta mokolo ya mibále ya 12 ya sánzá ya mwambi, bitumba káti ya bato babóyi mbongo ya corruption na ba mbúlúmbúlú na Belgrade, mbóka mokónzi, bikómi makási. Bitumba bipanzani na ba mbóka misusu ebelé kinó episkopo ya lokúmu Ladislav Nemet alobaki mokolo ya póso. « Na bozindo nazali na kondima ¡®te loléngé nionso ya mobúlú ezali ya koyamba te pe ekomema mingi na ba pási pe bokabwani », ekomaki episkopo ya lokúmu katoliko ya Belgrade na communiqué ena. Episkopo ya liboso ya lisapo ya Serbie- akelamaki na François mokolo ya 7 ya sánzá ya zómi na mibále ya 2024- abwaki mbela mókó ya polélé na bakambi bansó pe na bato bansó ya ekóló ena etóndi na ba orthodoxe : « Botika mobúlú ! Nakolendisa mókó mókó apona nzéla ya lisoló, na motéma monene pe na bosémbo, po ezali kaka ndéngé waná po ya kozua eyano elamu ya sóló pe ya kouméla na makambo na biso ».
Makanisi po ya bato bayoki pási ya tina te
Andimi ¡®te Serbie ¡°ezali na likoki ya komibongisa lisusu soki abóyi likúnya pe asáli po ya kimia pe bomoto¡±, episkopo ya lokúmu Nemet abengi kobánda sik¡¯oyo na boyokani, na bwanya pe na botosi ya mókó mókó po na lóbi ya ekóló ya bato milio 6.6. Pe asúkisi na bokanisi baye bansó bazokaki o eleko ya mobúlú ya mikolo mileki, ¡°baye bayoki pási na mobúlú ya tina te¡±, na bokundoli na bato ya Serbie ¡®te lóbi ya ekóló ezali na maboko na bangó. ¡°Topona nzéla ya kimia¡±, eséngaki episkopo ya lokúmu, azali pe lokóla mokónzi molandi na Lisangá ya ba masangá ya ba episkopo ya Poto.
Likambo ya bobáteli ezali malamu te
Koleka ba mbúlúmbúlú 130 bazokaki, pe ebelé ya ba civil basengelaki kokende na lopitalo, engebene na maloba ya mokónzi ya Serbie Aleksander Vucic na lisoló na bapanzi nsango mokolo ya eyenga na Belgrade. Mokambi ya ekóló oyo azali na bokónzi koleka mibú zómi alobaki azali kobongisa póso eye eyano akopesa na likambo ena, pe asakoli ¡®te ¡°ekokamwisa¡±. Káti ya masengi (revendications) ya baye batambolaki na nzéla ezali bobengi po ya maponami ya mbálákáká. Serbie ezali na mobúlú mikolo minsó úta mokolo ya yambo ya sánzá ya zómi na mókó ya 2024, mokolo ya pási ya Novi Sad eye elukaki liwa ya bato 16.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisoló oyo