Episkopo ya lok¨²mu Parolin: ¡°Bato ebele bayebi likambo te bazali kob¨²ngisa bomoi na bang¨® po ya lok¨®s¨® ya bak¨®nzi¡±
Jean-René B.-Kinshasa
¡°Bato ebele bayebi likambo te bazali kobúngisa bomoi na bangó po ya lokósó pe pósá ya baye bazali kolekisa ndélo ya bokónzi na bangó ndéngé balingi : kotiya bangó o káti-káti ya bobateli ezali likambo mókó ya bosémbo eye ezali po ya bangó, po bazali na ndingisa ya koloba te¡±. Waná ezalaki eye elobaki episkopo ya lokúmu Secrétaire ya Leta ya Vatican Pietro Parolin, na nsango mókó alobaki po ya sángó Nicola Riva ya « Opera di Nazaret », lisangá ya ba civil ya mokili mobimba esálema o káti ya mibú 60 pe 70 ya ekeke eleka na lisalisi ya tátá na ye, Giovanni Riva, motángisi pe mokomi.
Eleko ezalaki likambo ya Tonalestate 2025, université internationale d¡¯été- ebongisama po na bayékoli, batángisi pe na baye bansó basepeli na loléngé ya bomoni bosólo na botosi ya makoki ya bomoto, ya sémbo pe ya kimia- eye ebándaki mokolo ya 7 ya sánzá ya mwambi.
Likambo ena, eye ezali mobú eye na mbala na yangó ya 26, ekosálema kino mokolo ya 9 ya sánzá ya mwambi na likambo mokónzi ya kimobóla, na kómbó « DeRelicti- nani asimbi bafúngola ya bokónzi ». Azali kokanisa bato baye babwakama pe babosana bango, na lokóla baye bazali na mokúmba ya loléngé na bangó, na bobosani te banzéla ya mbótama ya sika.
Kobongola bosólo epáyi wápi ozali
Epáyi esúsu, Tonalestate ezali ¡°kosangisa bilenge baúti bikóló ebele ya mokili zambi ya bokolisi pe koloba elongó makambo biye ya makási ya eleko na biso¡±, elimbolaki mokónzi Elena Lanzoni na bapanzi nsango ya Vatican. ¡°Tolingi bato batála baye bazali na ndingisa ya koloba te, baye bazali kobika na bozangi sémbo pe bomoto likoló ya mabé ya ¡°bakónzi¡±, elingi koloba baye basimbi lelo mpifo (pouvoir)¡±, ebakisaki Elena Lanzoni, na bobwaki liso epayi ya bayi politiki.
Kasi likambo elandami, po ya bilenge bazalaki waná, ezali kaka ya kotelema te na ¡°baye bazali mikáno po ya bomoi, liwa, kimia, etumba, kasi baye bakoki kopesa elikya na baye bazali na eloko te¡±, ekobaki ye.
Bitumba koleka 80 bizali na mokili
Mopanzi nsango Gian Guido Folloni, ministre ya kála ya Italie, alobaki ¡®te ¡°ezali leló na bitumba 56 bizali kosálema¡±. Pe amóni ¡®te ¡°mikáno ya malamu lisangá ya mokili mobimba ezuaka simá ya etumba ya 1940-1945 bibwakama¡±. Leló, esakolaki ye, úta etúká ya Gaza kino Darfour, na Sudan, tozali komóna ¡°eseké ya eye toyebaki na kobenga na lopoto ¡®civilisation¡¯¡±.
Bondeko pe bolamu ya bato bansó
Na loléngé ena, mbela mókó po ya bondeko esakolamaki o eleko ya bokútani na episkopo ya lokúmu Giovanni Battista Re, motomolo ya lisangá ya ba episkopo, alobaki bóni Papá Léon XIV asimbi na motéma ¡°bomipesi po na kimia¡± pe ¡°bomókó ya Eklezia¡±. Alendisaki bilenge bamipesa na ¡°molongó ya yambo¡±. Libosó ya bolembu ya basúsu, elobaki ye, ¡°esengeli toyoka mokúmba ya kosalisa bangó¡±. Po, ¡°bomoi ya moko moko káti na biso ekangemi na eye ya basúsu¡±: esengeli bansó toyóka lotómo ya kosangana na bondeko, na bosálisi, na bosungi, na kosála elongó¡±, po ya kotónga bolamu ya bato bansó.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisoló oyo