ÐÓMAPµ¼º½

Luka

Anwar Abu Eisheh o eleko azuaki maloba na Tonalestate Anwar Abu Eisheh o eleko azuaki maloba na Tonalestate 

Cisjordanie, kozala na H¨¦bron pe kolikia eyano m¨®k¨® ya bik¨®l¨® mibale

Answar Abu Eisheh, mot¨¦yi pe ministre ya kal¨¢ ya Autorit¨¦ palestinienne, abiangamaki na likambo ya Tonalestate, apesaki na bokuse nini elingi koloba kozala lel¨® na Palestine, k¨¢ti na ba colons pe ba soda. Po na ye, ¡°s¨²ka ya etumba ena ekoki koya kaka na mok¨¢no ya mokili mobimba, b?ng¨® kotia bulamatari ya Isra?l molung¨¦ na mokili mobimba¡±.

Jean-René B.-Kinshasa

Motéyi na université Al-Qods ya Hébron, na Cisjordanie, Anwar Abu Eisheh azalaka ministre ya Bonkoko ya Autorité ya Palestine ya Mahmoud Abbas káti na 2013-2014. Na bolobi na bilenge bazalaki na mbala ya 26 ya likambo ya Tonalestate 2025 eye esilaki mokolo ya 9 ya sánzá ya mwambi elekaki, azongelaki likambo ya Palestine, na bolakisi ¡®te Hébron esimbami makási na limpinga pe ba colons ya Israël. ¡°Na bato 250 000, engúmba ezali atá na 1% ya bisika y amatiti te, nzókandé esika ba colons bazali pembeni ezali na 20%. Ezali bôngó po na nionso, úta mayi kinó lotiliki¡±, elobaki ye.

Bóni-bóni bomoi ezali na Cisjordanie?

Engúmba ya kála ya Hébron ezali na molai ya kilomètre carré mókó, loléngé mókó na engúmba ya kála ya Yelusaleme. O eleko Israël akotaki na 1967, ezalaki na bato 35 000 pe 15 000 bato basusu bazalaki na nzinganzinga. Kasi na 1980, ba colon ya Israël bakómaki pe bavandaki waná. Bazuaki etéyelo mókó eye ezalaki koyamba ba réfugié ya Palestine ya 1948, babotoli lopitalo mókó epayi wápi mama na ngai azuaka libiki, esika ya nzéla epayi wápi papá na ngai azalaki kosála lokóla mokúmbi motuka káti na Hébron pe Yelusaleme, na etéyelo na ngai ya ebandeli, eye ekóma etéyelo mókó ya eyamba ya ba yuda.  Babándaki kotindá na makási bato ya engúmba ya kála ya kotika yangó: na 1993-1994, o eleko ya boyokani ya Oslo, ba ndáko mingi bitikalaki pe etikalaki kaka mili mókó ya bato.  

Na basusu, tosáli mingi po  na komeka kobongisa esika yangó, pe kozongisa bato. Kasi tokokaki kozongisa kaka bato kati na 3 000 na 4 000, baye batikalaki lisusu te.

O ngonga ena, na 1997, boyokani mókó, ebengamaki boyokani ya Hébron, esalemaki kati na OLP (organisation de libération de Palestine) na Israël, eye eséngaki limpinga ya Israël ebima na Hébron. Úta eleko ena, engúmba ekabwanaki na Hébron 1 pe Hébron 2.

Na eye ya yambo, bato ya Palestine bavandaki na bonsómi, na eye ya mibále, ngúyá nionso ezalaki na maboko ya bato ya Israël. Na 2000, na Intifada ya mibále esálemaki, pe simá ya mibú mibále, bokeseni káti na Hébron 1 pe Hébron 2 ebúngaki, po limpinga ezuaki lisusu engúmba mobimba na maboko.

Bóni-bóni likambo elekaki liboso pe simá ya mokolo ya 7 ya sánzá ya zómi?

Mbongwana ezali na bokeli bisika ya sika po ya ba colon, na bobúki na ba ndáko ya sika ya bato ya Palestine, bokangi mabúlú ya mayi ebelé pe bopekisi esálemaki epayi ya baloni po basálela yangó te. Na bokómi ya bato ya parti ya Netanyahu na bokónzi na Israël, likambo na Hébron ebébaki. Mokolo ya 7 ya sánzá ya zómi 2023 ebébisi lisusu makambo koleka. Nazali na lisangá mókó ya bosololi na bato ya Israël, esálema na 2014. Tokendeki na ba kibbotz, to na Tel-Aviv. Mingi ya bato ya Israël baye nayebi pe baye tobándaki kosolola babongola ezalela, kinó lisolo na bokutani bisila.  

Lisusu, liboso, nakokaki kokende na Yelusaleme na bozui ndingisa te, po bato ya mibú koleka 55 bakokaki kosála yangó: simá ya mokolo ya 7 ya sánzá ya zómi, waná esálemaka lisusu te, moto mókó te ya Palestine akoki koyingela kúná. Pembeni ya bato ya mosála 200 000 babándaka kokende kosála na Israël mokolo na mokolo, bazangi misála sik¡¯oyo. Pe ministre atálaka makambo ya mosolo, Bezalel Smotrich, abóyaki kopesa mbongo na Autorité ya Palestine, atáko ekomama na boyokani ya Oslo. Likambo ekómi pási makási, bingúmba bizali ya kokangama, nionso ezali talo koleka pe bomoi ekóma lifélo.

Nakanisi ¡®te súka ya etumba ekoki kosálema kaka na mokáno ya mokili mobimba, bôngó kotia bulamatari ya Israël molungé na mokili mobimba. France pe bikóló bisusu balingi bandima Palestine. Toyebi ¡®te likambo ndéngé ezali sik¡¯oyo ekobongwana te, kasi ekozala litambe mókó na liboso po na kokóma na eyano ya Bikóló mibále pe, po eye etali ekóló ya Palestine, tolingi ezala laiki pe na démocratie.

Matondi mingi na ndéngé otángi lisoló oyo

18 s¨¢nz¨¢ ya mwambe 2025, 18:00