Caritas Internationalis : na Gaza, ezali etumba te, kasi bosilisani
Jean-René B.- Kinshasa
Úta ONU andima, mokolo ya 22 ya sánzá ya mwambi, ¡®te nzala na Gaza ezali likambo ya pósá pe elukami na bokangi lisálisi, na moke bato 273 bakúfi na nzala, káti na bangó bána 112. Caritas Internationalis ezongi na na lisakoli mókó na eye elobamaki na masangá binsó ya lisálisi : « Na Gaza, ekomi lingómbá katoliko ya mokili, tozali libosó ya likambo mókó ya pási, kasi na eyano ya boponi ebongisama. Bato ya ekóló nionso, bapimi bangó nionso, batiki bangó bakúfa na miso ya mokili mobimba ».
Etúmbu te pe boyokani
« Ezali etumba te », tokoki kotánga na mokandá, ¡°ezali bobébisi ebongisami ya bomoi ya ba civil. Bokangi Gaza ekómi masini mókó ya bobomi, esálisami na bozangi etúmbu pe na bokangi monoko, na boyokani ya bikóló ya bokasi koleka. Nzala awá ezali likambo mabé ya mokili te, kasi eyano ya likambo mókó ebongisami: kokanga lisálisi, kobwaka ba bombe na molongó ya mituka bikomema bilei, kobébisa ba nzéla pe biloko pe kobóya bokoti ya biloko bisengeli ya yambo po ya bato. Caritas Internationalis ezali motatoli ya pási ena. Ba civil, mingi penza bána pe bási, batiki bango na nzala, babwákeli bangó ba bombe pe basilisi bangó. Ba bulamatari ya makási, ba misála pe masangá ya mokili basáli ¡®te pási eye ekokisama na bopesi makoki na limpinga, mosolo pe na loléngé ya boyokani. Kimia na bangó ezali bozali o káti-káti te, ezali bondimi¡±.
Bobébisi ya lokúmu ya moto
Na bozongeli maloba ya Papá François na encyclique Fratelli tutti ¨C «Tobika bansó lisangá, moto abika te¡± - Caritas Internationalis azali komóna eye ekoleka na Gaza bobébisi mókó ya lokúmu ya moto pe bokwei ya oyo nionso ya malamu. ¡°Eye ezali koleka elongobami te na makambo ya tina ya bomoto, kasi na bobébisi ya mokáno ya mokili pe ya bato, na káti kúna Mobéko po ya bobáteli pe bopekisi génocide¡±.
Mbela po ya kozala na boyokani te
Caritas Internationalis ebwáki mbela mókó ya lombángo na bato bansó ya boyambi pe ya boyébi zambi bayókisa mingóngó na bangó, baningisa ba bulamatari pe basénga bosémbo. ¡°Gaza ekozela maloba te, tokoki kotánga na mokandá, kasi libiki". Lingómbá ekosénga bozimi-móto sik¡¯oyo pe ya libela, bokotisi ezangi mabaku ya lisálisi, pe botiki bakangemi na makási binsó pe botindi limpinga ya ONU po ya bobateli kimia. Na makambo misusu biséngami na Caritas Internationalis bizali lokóla bosambisi baye babomi bato pe súka ya bozali ezangi sémbo ya Israël na mabelé nionso ya Palestine bizali na maboko na ye.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisoló oyo.