Am¨¦rika, bobeti mas¨¢si o eleko ya misa m¨®k¨® na Minneapolis
Jean-René B.- Kinshasa
Likambo ya mobúlú na tóngo, eye etindi moto mókó kobeta masási na bandimi basangani o ndáko-Nzámbe katoliko ya Bosakoli, na Minneapolis, engúmba ya tina ya Minnesota, n¡¯Amerika, eyébani nanu te. Mobúlú esálemi na ngonga ya 8 na ndámbo o eleko ya misa ya bozongi kelasi, na esika mókó ezali na etéyelo mókó ebándi na bána mike kinó mikóló.
Bána mibále bakúfi pe misusu bazoki
Ba ngonga ebelé simá ya bobeti masási ndé ba mbúlúmbúlú basakolaki ¡®te na moke bána mibále ya mibú 8 pe 10 bakúfaki, pe zómi na minei bazuaki ba pótá. Mobeti masási amibomaki. Engebene na bapanzi nsango ya Minneapolis, na moke bána motóbá na baye bazokaki na mobúlú bazali na lopitálo.
¡°Nazuaki nsango ya bobeti masási mókó na etéyelo katoliko ya Bosakoli pe nakokoba koyébisa binó tángo kaka tokozua ba nsango ebel顱, elobaki mokambi ya Minnesota, Tim Walz. Abákisaki na simá: ¡°Nakosámbela po na bána na bisó pe balakisi na bisó, baye mokolo ya yambo ya etéyelo ezui elembo ya likambo ya pási ya mobúlú¡±.
Donald Trump azali pembeni
Mokónzi y¡¯Amérika alobaki lokóla na ba réseaux sociaux: ¡°Nazuaki nsango ya bobeti masási na Minneapolis, na Minnesota. FBI eyaki na lombángu pe ezali waná. Ndáko-Pembe (Maison Blanche) ekokoba kolanda likambo ena ya pási. Nakobenga binó kosangana na ngai po ya kosámbela po ya bato bansó bazuami na likambo yangó¡±.
O eleko ya ngonga 12 libosó ya bobeti masási na etéyelo ya Bosakoli na Minneapolis, ezali na ba bobeti masási 12 misusu biye bisáli bato 8 bazoka pe 3 bakúfa na engúmba, loléngé bakonzi ya Minneapolis balobi. ¡°Ndéngé mobúlú ya mondóki na engúmba o eleko ya ba ngonga zómi na mibále bileki ekómi kobángisa makási¡±, elobaki lisangá ya ba mbúlúmbúlú.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisoló oyo.