ÐÓMAPµ¼º½

Luka

Bokundoli ya bobomi ya Srebrenica na Bosnie-Herz¨¦govine Bokundoli ya bobomi ya Srebrenica na Bosnie-Herz¨¦govine   (AFP or licensors)

Srebrenica: nzela ya malembe po ya bozongisi bondeko ya bato ya Bosnie

Mib¨² 30 sima ya bobomi 8.000 ya bato ya Bosnie esalemaka na mampinga ya ba serbe ya Bosnie na Yougoslavie moko ezalaki kozika na makila, na pasi pe mindondo bizali naino makasi kati ya masanga lolenge na lolenge ya Bosnie-Herz¨¦govine. Episkopo ya Sarajevo, mokonzi ya lisangani kati ya biyamba ya ekolo, azali kobunda po ya boluki bolimbisi pe bozongisi bondeko.

Jean-René B.-Kinshasa

Mokolo ya 11 ya sánzá ya sambo ezali mokolo moko ya tina ya bosepeli po na ba musulman ya Bosnie-Herzégovine. Eleki mibú 30, mokolo na mokolo, koleka 8.000 kati na bango babomaka bango na mampinga ya ba serbes ya Bosnie na bokambemi ya général Ratko Mladic. Mladic afundama pe asambisama na CPI po na mosala na ye ya bobomi, eye eleki makasi koleka úta Etumba ya mibale ya mokili mobimba.  

Ba pota bizali kaka ya kofungwama

Sima ya mibú ntúkú misato, mosala ya bokanisi ekoluka nzela moko ya pasi o kati ya makanisi bikeseni pe ya botangi lisusu lisapo. Po na ba Serbe basusu ya Bosnie, ezali kaka pasi bandima likanisi ¡®te général Mladic azali mobomi ya etumba, bozito ya makambo ezali bôngó bôngó. Makanisi bina bikolembisa bovandi esika moko na kimia ya masanga lolenge lolenge. Ba pota bizali kaka ya kofungwama o kati ya mabótá ebele atako mibú ntúkú misato bileki, ezali lisusu pasi koloba bolimbisi pe bozongisi bondeko. Pasi ezali kaka na makanisi, etatoli Mgr Tomo Vuksic. Ekangemi ¡°na bobungisi koleka ba bomoi ya bato¡±, elobaki episkopo ya Sarajevo. Bato bazali kosambela po na kimia, po na bozongisi bondeko pe po ¡®te etumba ezonga lisusu te. Mgr Vuksic, azali lokola mokonzi ya lisangani kati ya biyamba ya Bosnie-Herzégovine, azali kosala makasi po na bokotisi ezaleli moko ekoki kosunga lisolo ¡°na batindami ya mosala ya bulamatari¡±. Kasi lokola motindami ya eyamba, azali kolinga te ¡°asangisama na lisolo pe molongo ya politiki¡±. Bomibenda ena ezali mokáno edimamaki na bilama ya lisangani o kati ya biyamba po na kobatela bondimisami na bango. Kasi, moto moko te akoki ¡°kobosana mikakatano ya politiki, ya nkita, bokabwani ya likanisi ya bato, makambo bikobimisa matata¡±.  

Kolimbisa pe kozongisa bondeko

Lisanga moko moko esengeli ebomba bomoko na ye na botosi ba bokeseni. Wana ekoki kosalema kaka na kotambola na nzela ya bolimbisi, ¡°po tozali komona yango lokola moko ya makambo ya tina ya bozongisi bondeko¡±. Bozangi bolimbisi, bozangi bopetolami ya molimo pe ¡°bozangi koboya ya solo kozongisa mabé pe boyini¡±, ekokoka te ya koloba kimia ya sembo, bozongisi bondeko, ekobaki Mgr Vuksic. Yango wana azali kotambola o ekolo po na koloba lisusu ¡®te Kristu akobianga ya kolimbisa. Ezali kaka na boleki eteni eye, emonaki ye, nde masanga binso bikoki kotala lobi moko ya lisanga.

¡°¡°Lokola Eklezia, lokola episkopo, nazali kosala makasi eye nakoki ya kozonga na likambo likonzi ya bolimbisi, po ezali ya solo na tina¡±¡±

Úta boyokani ya Dayton ya sánzá ya zómi na mibale ya 1995 eye esukisaki etumba, bato ya Bosnie bakoki koloba ¡®te bazali kobika na kimia. ¡°Nazali komona te ¡®te kimia elingi ebeba, elobi Mgr Vuksic, kasi nakoki koloba te ¡®te kimia ezali ya kotengama te¡±. Episkopo alingi akesanisa likambo likonzi ya kimia na eye ya bozongisi bondeko. ¡°Likambo ya bozongisi bondeko ezali nzela moko molayi eye esengeli kokende liboso na botiyi mokolo na mokolo litambe (pied) moko liboso ya mosusu¡±.

12 s¨¢nz¨¢ ya nsambo 2025, 13:30