Na Gaza, baye basungaka bato bakomi ¡°kolia mbala m¨®k¨® na mokolo¡±
Jean-René B.-Kinshasa
Koleka mokámá ya masangá bisungaka bato bakebisi, na communiqué mókó ebimaki mokolo ya misáto ya 23 ya sánzá ya sambo, ¡®te ¡°nzala ya bato ebele¡± ekopanzana na etúká ya Gaza pe balendisi bulamatari ya Israël ya kotika lisálisi po ya bato. Israël andimi maloba maye te pe ye afúndi Hamas ¡®te azali simá ya nzala ena. Lisangá Médecins du Monde ezali na ba clinique motóbá pe bato ya misála 110 na etúká ya Gaza. Lisoló na Helena Ranchal, mokambi ya misálá na mokili epayi ya MdM.
Médecins du Monde ezali mókó ya ba ONG bikomaki mbela ena po na Gaza. Loléngé nini likambo ya bokólóngónó ya nzóto ezali kúna lelo?
Nazangi maloba po ya koloba yango. ¡°Pási, mab顱, ekoki te po na koloba eye ezali koleka kúna. Bosólo, motindo ya bokólóngónó ya nzóto ya Gaza ebébi. Ba lopitálo mingi bizali kosála lisusu te po bibetamaki, po minganga bazali te, po bisáleli bizali te¡Pe mingi mpenza, esengeli koloba ¡®te batindikaki bato na makasi na etando mókó ezali kaka 12% ya mabelé ya etúká ya Gaza. Ba lopitálo mingi bizali na bisika bakoki kosála te po bato bakoki kotikala kúna te na bobangi kokúfa na sé ya ba bombe.
Médecins du Monde ezali kosála lisusu na Gaza ?
Tozali na ba clinique motóbá na etando mobimba, na basáli 110 na etúká ya Gaza. Kasi, mokolo na mokolo ezali kobóngwana: tango mosúsu ezali misáto, tango mosusu minei, po ndéngé ya kosála na bokengi ezali kobóngwana makasi. Ezali na mikolo tofúngolaka clinique te. Ezali na ba clinique biye tosengeli kokanga mwa mikolo po ya kofúngola yango epayi mosúsu, leló to lóbi, esika ezalaki ezui mobéko ya kolongwa ya limpinga ya Israël. Bazali lisusu mingi te bato basálaka na lopitálo. Yango waná, tozali na bato ebele bazali kozela na molongó liboso ya ba clinique na bisó.
Likambo ya bopekisi lisálisi ekoma na Gaza
Biso, tozali na ba mituka eleki ba sánzá ebele biye tozali kokoka kokotisa te. Ezali po tokoki te, ezali ndé bozangi pósá ya kosála ya bayi politiki.
Po na bilei, ezali mawá. Bato ya mosála na bisó, bazali bato ya Gaza, bazali koyebisa bisó te ezali mikakatano po na kolia mikolo nionso po biloko bileki motúya pe bazali kozua bilei te. Bakomi kolia kaka mbala mókó na mokolo soki emonani.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo.