Vatican na ONU: ¡°Topesa lokumu na Fran?ois na bopesi elikya na mokili"
Jean-René Bompolonga- Kinshasa
« Lolenge ya malamu ya kokanisa Papa François lelo ezali ya bozongeli móto ya elikya pe ya komona lisusu elimo eye, eleki mibu ntuku mwambi, ememaki na bokeli lisanga eye, ONU, zambi tokoka banso kosala po na mokili moko elamu po na baye bakoya sima na biso ». Ezali na maloba maye nde episkopo Mgr Gabriele Caccia, oyo na lopoto babengi observateur permanent du Saint-Siège près de l¡¯ONU, asukisaki mokolo ya 29 ya sanza ya minei, lisanga enene ezalaki na New York po na bokutani moko ya kafu-kafu ebengamaki po na bokanisi Papa wa Roma oyo akufaki mokolo ya liboso ya Pasika 21 ya sanza ya minei. Antonio Guterres, secrétaire général ya ONU, azalaki na bokanisi ena.
Lisikulu ya François na ONU
Mgr Gabriele Caccia abimisaki bilili misato ya François. Ya yambo ezalaki mokolo ya 25 ya sanza ya libwa, tango Papa François alobaka na lisanga enene ya ONU eye ezalaki kobongama po ya bobimisi mwango na yango ya mibu mitano. Mwango wana, lokola Mgr Caccia akundolaki, François abengaki yango ¡°elembo ya elikya ya ntina¡±. Abiangaki bakambi ya mokili po babatela ¡°mosisa ya botomboli moto mobimba¡±, ¡°eye ezali lotomo ya kozala na bomoi¡±.
Lolaka moko ya lisanga ya elikya
Elili ya mibale ezali bokutani na 2019 kati na François na Antonio Guterres na Vatican, mobu moko liboso ya bosepeli mibu 75 ya bokeli ya ONU. Na liloba moko bango mibale balekisaki na vidéo babengaki mokili etika kotia pembeni ¡°bozangi bosembo, bozangi bokokani, likambo ya nzala na mokili, kimobola, bana baye bazali kokufa po bazangi mayi, bilei pe nkisi bisengeli¡±. ¡°Bakundolaki lobi ya bato banso bakimi bisika bavandaka pe ya baye bazali kotika bikolo na bango po na boluki bomoi ya malonga¡±. Lisusu, ¡°balobaki bango mibale tè boluki mindoki pe likambo ya nucléaire ezali lifingi na miso ya Nzambe¡±, elobaki Mgr Caccia.
Suka ya ba maladi
Elili ya misato ya Papa François, eye Mgr Caccia alobaki na lisanga ya ONU, ezali ya Statio Orbis, ¡°losambo po ya mokili mobimba¡± eye Papa François akambaka mokolo ya 27 ya sanza ya misato 2020, o eleko ya pandémie ya Covid-19, na esika ya Santu Petelo na molili pe moto ata moko te. ¡°O eleko ena, mokili mobimba esosolaki tè tozali lisanga pe tokangama. Covid-19 ezuaka bato ya mosolo pe babola, bikolo bizali na makoki na biye bizangi makoki¡±. Kasi na ebandeli ya mosala na ye ya Papa, François akebisaka na bolobi tè na bosolo suka ya ba maladi ezali pandémie ya likanisi, eye abengaki ¡°bozangi kotala makambo ya bato ya mokili¡±, elobaki Mgr Caccia.
Po na yango, François alakisaki nkisi ya pandémie ena na 2020 na encyclique Fratelli tutti. Ezali elili ya ¡°bon samaritain¡± oyo abwakaka elongi te, kasi ¡°akobatela moto azoki pe asundolami na nzela¡±, esukisaki Mgr Caccia.