ÐÓMAPµ¼º½

Luka

PALESTINIAN-ISRAEL-CONFLICT-HUNGER PALESTINIAN-ISRAEL-CONFLICT-HUNGER  (AFP or licensors)

Nzala emati makasi na mokili

Rapport ya 2025 ya R¨¦seau ya mokili etalaka likambo ya mpasi ya bilei (R¨¦seau mondial contre les crises alimentaires) elakisi bomati moko makasi ya nzala na mokili. Koleka bato milio 295 bazali na kwokoso sik¡¯oyo na bozangi bilei na 2024, elingi koloba bato milio 14 babakisami na botali mobu moleki.

Nsango ya Vatican

Po na rapport ya sika ya 2025 ya Réseau ya mokili etalaka likambo ya mpasi ya bilei, motango ya bato bazali koyoka nzala makasi na mokili eleki milio 295 na 2024. Motango ena ekolakisa bomati ya mawa ya bato milio 14 na botali rapport ya mobu moleki pe ekolakisa bomati ya mpasi ya nzala. Mpasi yango ewuti mingi na bitumba, makama ya klima pe mabaku ya nkita. Motango wana ezuami na matomba bilukamaki na bikolo 65 na masanga bitalaka makambo ya mokili. Na kati ya 65, 53 batungisami na nzala lolenge ya makasi mpenza. Aurélien Mellin, elama moko ya Lisanga ya ONU etalaka makambo ya bilei pe ya elanga (FAO), asakoli tè ¡°bikolo 35 bizali na likambo ya mpasi elenda ya bilei kobanda 2016¡±. ¡°Ezali makambo biwumeli bikosenga kaka lisungi ya mbalakaka te, kasi biyano ya lolenge na lolenge na bisika bizua mosolo te mibu na mibu¡±. Alimboli tè esika, soki lisungi ya monene epesami, mabongisi bikomonana na likambo ya bilei sima ya mikolo. ¡°Ezali nsango tolingi topesa: biyano bizali, kasi esengeli kozua nzela elamu pe ya kotia kuna makoki bisengeli¡±, elobaki ye.

Bitumba, likambo enene ekomema nzela

Kobanda 2016, makambo misato bizali komema mpasi ya bilei bibongwami te: bitumba na bozangi bokengeli, makambo makasi ya météo (bikomi makasi lisusu likolo ya makama ya klima) pe mabaku ya nkita. Kati na makambo misato wana, bitumba bizali kobebisa makasi, etatoli Aurélien Mellin.

Bana kati na baye bazali konyokwama

Moto ya FAO alobi lokola bobangi na ye liboso ya bokitisi mosolo ya lisungi, na bokebisi na maye makotala bato bazangi makoki, lokola bana. Rapport ekoloba tè ezali bobangisi ekoki kosalema kala mingi te, na bolakisi tè bokitisi makoki ya lisungi ekoki komema bomatisi ya nzala mingimingi na masanga bizangi bozui.

Mbela po na eyano ya malonga ya mokili

FAO na masanga bisalaka na ye bikolendisa mokili mobimba ya bokolisi lisungi ya mbalakaka pe ya eleko molayi. ¡°Ba mpasi biye bizangi biyano te¡±, esukisaki Aurélien Mellin.

Nzala ¡°ezali kokoma cicatrice na bomoi ya ba milio ya bato na mokili¡±, ekebisaki secrétaire général ya ONU, Antonio Guterres. Ezali kopanzana ¡°mbangu koleka makoki na biso ya kopesa eyano na likambo yango¡±.

18 s¨¢nz¨¢ ya m¨ªt¨¢no 2025, 13:56