Na Georgie, basi bazali konyokwama o eleko ya bobimi na nzela
Jean-René B.-Kinshasa
Banda babanda kobima na nzela po na bosengi ekolo na bango Georgie ekota na oyo babengi na lopoto Union européenne na sanza ya zomi na moko 2024, Amnesty international asangisi matatoli ebele biye bikolakisa makambo ya mobulu ba mbulumbulu (policiers) bazali kosala na basi. Lingomba ena ebimisi lelo mokolo ya mitano mokanda moko ekolakisa likambo moko ya mawa po na basi ya Georgie.
¡°Makambo bazali kosala bango bizali malamu te pe ya soni¡±
¡°Mokanda eye ekolakisa lolenge ebele bazali kosala basi sima ya bobimi o nzela. Bakonzi bazali koluka mingi basi pe bazali kosala yango na ndenge ya koyokisa bango pasi¡±, elobi Denis Krivosheey, elama moko ya Amnesty international, liboso ya bapanzi nsango ya Vatican. O eleko ya bokangemi, ¡°oyo ekomelaka basi mingi babimaki o nzela na kimia. Bamemaka bango na esika ya ba mbulumbulu, kuna bazali kosala bango makambo ya soni¡±.
Moko ya ba ndakisa ekolakisa mabe ezali kosalema ya bozangi sembo, ekobaki ye, ¡°ezali likambo ya bolongoli basi bilamba nionso tango bakangemi. Wana ezali mobeko te. Mobeko ya Georgie epesi ndingisa wana te. Kasi, ekopekisa yango polele. Ezali pe mabe na botali sembo ya mokili¡±. Mokanda y¡¯Amnesty international esemboli mingi tè ¡°mobulu bakosala na basi ekomi lokola esaleli ya bonyokoli ya ba mbulumbulu po na baye bazali kobima na nzela bakanga monoko¡±. Mikolo miye, bulamatari ya Georgie alingi te ¡°bato babima na nzela po na bolobi mabe ya mosala ya leta¡±.
Bonyokoli ya nzoto pe ya molimo ezali kotika makambo ebele na makanisi pe molimo na bomoi ya moto ye mei.
Lingomba Amnesty international ekosala makasi po tè bosembo esalema po na baye banyokwami. Po na Denis Krivosheey, ¡°bosembo elingi pe koloba koluka ba mbulumbulu baye basalaki basi mabe po bayanola na mbeba basalaki¡±.