Lolenge nini politiki ezali na ekolo Niger?
Jean-René Bompolonga-Kinshasa
Bokutani ya ekolo zambi ya botongi Niger, eye esalemaki na Niamey kobanda 15 kino 20 ya sanza ya mibale 2025 esangisaki bato koleka 700. Esalemaka po ya kovandisa makonzi ya botomboli ya seko pe kobongisa lisusu esaleli ya politiki.
Kaka na molongo ena, ministre ya Niger oyo atalaka makambo ya bapaya asakolaki mokolo ya 17 ya sanza ya misato na nzela ya mokanda moko, mokano ya ¡°bonsomi¡± ya ekolo na ye ya kolongwa na Lisanga ya bikolo bilobaka lifalanse (Organisation internationale de la francophonie), eye esalamaka mokolo ya 20 ya sanza ya misato 1970 na Niamey. Lisusu, ekolo elobaki mokolo ya 29 ya sanza ya misato bobimi na ye na lisanga ya mampinga ya bikolo ebele, eye esangisaki ba soda ya Tchad, Cameroun, Nigeria pe Niger po na kobundisa Boko Haram pe batomboki djihadiste misusu na etuka ya lac Tchad.
Likambo ya bokengi
Etungisami mingi na mobulu ya bato bazali kotosa Etat islamique na Al -Qaida, Niger ezali ekolo ya misato ya etuka ena ya komona coup d¡¯Etat moko kobanda 2020 sima ya Mali pe Burkina Faso (Bamako na 2020, Ouagadougou na 2022). Po na Issoufou Yaya, bozangi bokengi eye ¡°ekoti na ekolo na mozindo¡± ezali mbuma ya ¡°libula ya mokonzi azalaki liboso¡±. Bokeli ya limpinga ya lisanga ya bato 5000 na oyo babengi na lopoto Alliance des Etats du Sahel (AES) epesi na Niger nzela ya sika ya politiki pe ya ba soda, elobaki Issoufou.
Niger pe bokasi ya politiki ya Afrika ya ouesti
Bazali na mikakatano na oyo etali likambo ya bokengi pe ya politiki, Niger, Mali pe Burkina Faso bakelaki mokolo ya 16 na sanza ya libwa 2023 AES. Ba soda baye bazui bokonzi na bikolo bina basali bongo lisanga ya bobateli pe ya bobongisi zambi ya boyokani na bango. Lelo boyokani ya bikolo misato biye bizali mbongwana ya motuya na likambo ya politki y¡¯Afrika ya ouesti.